Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.7
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Matt
Matthew
24
LIN
BSB
A
a
Matthew 24
24
Matthew
Jerusalem: conflict and teaching
Lingala Bible
Jesus
, person
Noah
, person
Daniel
, person
Judea
, place
Olives Mount
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Wana Yesu azalaki kobima longwa na lopango ya Tempelo, bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye mpo na kotalisa Ye ndenge batonga Tempelo.
BSB
BSB:
As Jesus left the temple and was walking away, His disciples came up to Him to point out its buildings.
2
LIN
Kasi Yesu alobaki na bango : — Bomoni nyonso oyo ? Nazali koloba na bino penza ya solo : nyonso ekobukama, libanga moko te ekotikala awa na likolo ya libanga mosusu.
BSB
BSB:
“Do you see all these things?”
He replied.
“Truly I tell you, not one stone here will be left on another; every one will be thrown down.”
3
LIN
Lokola Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, bayekoli bapusanaki pene na Ye mpe batunaki Ye, na esika oyo bazalaki bango moko kaka : — Yebisa biso : makambo wana ekosalema tango nini ? Mpe elembo nini ekotalisa koya na Yo mpe suka ya mokili ?
BSB
BSB:
While Jesus was sitting on the Mount of Olives, the disciples came to Him privately. “Tell us,” they said, “when will these things happen, and what will be the sign of Your coming and of the end of the age?”
4
LIN
Yesu azongisaki : — Bosala keba ete moto moko te akosa bino !
BSB
BSB:
Jesus answered,
“See to it that no one deceives you.
5
LIN
Pamba te bato mingi bakoya na Kombo na Ngai mpe bakoloba : « Ngai nde Masiya, » mpe bakokosa bato ebele.
BSB
BSB:
For many will come in My name, claiming, ‘I am the Christ,’ and will deceive many.
6
LIN
Bokoyoka basango ya bitumba mpe nungunungu na tina na bitumba, kasi bomitungisa te mpo na yango ; pamba te makambo wana esengeli kosalema, kasi ekozala nanu suka ya mokili te.
BSB
BSB:
You will hear of wars and rumors of wars, but see to it that you are not alarmed. These things must happen, but the end is still to come.
7
LIN
Ekolo moko ekotelemela ekolo mosusu, bokonzi moko ekobundisa bokonzi mosusu, nzala ekozala makasi penza, mpe mabele ekoningana bipai na bipai.
BSB
BSB:
Nation will rise against nation, and kingdom against kingdom. There will be famines and earthquakes in various places.
8
LIN
Makambo nyonso wana ekozala kaka ebandeli ya pasi lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota.
BSB
BSB:
All these are the beginning of birth pains.
9
LIN
Bongo, bakokaba bino mpo ete bomona pasi, bakoboma bino ; bikolo nyonso ekoyina bino mpo na Kombo na Ngai.
BSB
BSB:
Then they will deliver you over to be persecuted and killed, and you will be hated by all nations because of My name.
10
LIN
Mpo na yango, bato ebele bakokweyisa kondima na bango, bakokaba mpe bakoyina baninga na bango.
BSB
BSB:
At that time many will fall away and will betray and hate one another,
11
LIN
Basakoli ebele ya lokuta bakobima mpe bakokosa bato ebele.
BSB
BSB:
and many false prophets will arise and deceive many.
12
LIN
Lokola mabe ekokola se kokola, bolingo ya bato ebele ekokita.
BSB
BSB:
Because of the multiplication of wickedness, the love of most will grow cold.
13
LIN
Kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka akobika.
BSB
BSB:
But the one who perseveres to the end will be saved.
14
LIN
Sango Malamu oyo ya Bokonzi ekoteyama na mokili mobimba mpo ete ezala litatoli epai ya bikolo nyonso ; sima na yango kaka nde suka ekoya.
BSB
BSB:
And this gospel of the kingdom will be preached in all the world as a testimony to all nations, and then the end will come.
15
LIN
Yango wana, tango bokomona makambo ya nkele oyo epesaka bato pasi na motema, oyo mosakoli Daniele alobelaki, kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu—
BSB
BSB:
So when you see standing in the holy place ‘the abomination of desolation,’ spoken of by the prophet Daniel (let the reader understand),
16
LIN
wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba ;
BSB
BSB:
then let those who are in Judea flee to the mountains.
17
LIN
tika ete moto oyo akozala na likolo ya ndako akita te, mpo na kokende kozwa eloko songolo kati na ndako na ye,
BSB
BSB:
Let no one on the housetop come down to retrieve anything from his house.
18
LIN
mpe tika ete moto oyo akozala kati na bilanga azonga na ndako te, mpo na kokende kozwa elamba na ye !
BSB
BSB:
And let no one in the field return for his cloak.
19
LIN
Na mikolo wana, mawa na basi oyo bakozala na bazemi mpe na ba-oyo bakozala komelisa bana mabele !
BSB
BSB:
How miserable those days will be for pregnant and nursing mothers!
20
LIN
Bosambela mpo ete makambo wana esalema te na eleko ya malili makasi to na mokolo ya Saba.
BSB
BSB:
Pray that your flight will not occur in the winter or on the Sabbath.
21
LIN
Pamba te pasi ekozala makasi, na lolenge oyo etikala nanu kozala te, wuta na ebandeli ya mokili kino sik’oyo, mpe na lolenge oyo ekotikala kozala lisusu te.
BSB
BSB:
For at that time there will be great tribulation, unseen from the beginning of the world until now, and never to be seen again.
22
LIN
Mpe soki Nkolo ayeisaki te mikolo yango moke, moto ata moko te akokaki kobika ; kasi mpo na baponami na Ye, akoyeisa yango moke.
BSB
BSB:
If those days had not been cut short, nobody would be saved. But for the sake of the elect, those days will be cut short.
23
LIN
Na tango wana, soki moto moko alobi na bino : « Klisto azali awa ! » to « Azali kuna, » bondima ye te.
BSB
BSB:
At that time, if anyone says to you, ‘Look, here is the Christ!’ or ‘There He is!’ do not believe it.
24
LIN
Pamba te bamasiya ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima, bakosala bilembo minene mpe bikamwa mpo na kokosa ata baponami, soki ekokaki kosalema.
BSB
BSB:
For false Christs and false prophets will appear and perform great signs and wonders to deceive even the elect, if that were possible.
25
LIN
Namiyebiseli bino mpo ete bosala keba !
BSB
BSB:
See, I have told you in advance.
26
LIN
Soki moto moko alobi na bino : « Botala, azali kati na esobe, » bokende kuna te ; to « Azali awa, kati na esika ebombama, » bondima yango te.
BSB
BSB:
So if they tell you, ‘There He is, in the wilderness,’ do not go out, or, ‘Here He is, in the inner rooms,’ do not believe it.
27
LIN
Solo, ndenge mokalikali oyo ebimi na este engengisaka kino na weste, ndenge wana mpe koya ya Mwana na Moto ekozala.
BSB
BSB:
For just as the lightning comes from the east and flashes as far as the west, so will be the coming of the Son of Man.
28
LIN
Esika nyonso ebembe ezali kopola, bandeke oyo eliaka bibembe esanganaka wana.
BSB
BSB:
Wherever there is a carcass, there the vultures will gather.
29
LIN
Tango kaka mikolo yango ya pasi ekoleka, « moyi ekokoma molili, sanza ekongenga lisusu te, minzoto ekokweya longwa na likolo, mpe banguya ya Likolo ekoningisama. »
BSB
BSB:
Immediately after the tribulation of those days: ‘The sun will be darkened, and the moon will not give its light; the stars will fall from the sky, and the powers of the heavens will be shaken.’
30
LIN
Sima na yango, elembo ya Mwana na Moto ekomonana na likolo ; bongo bikolo nyonso ya mokili ekokoma kolelalela mpe ekomona Mwana na Moto koya na likolo ya mapata ya likolo, kati na nguya mpe na nkembo monene.
BSB
BSB:
At that time the sign of the Son of Man will appear in heaven, and all the tribes of the earth will mourn. They will see the Son of Man coming on the clouds of heaven with power and great glory.
31
LIN
Mpe na lokito monene ya kelelo, akotinda ba-anjelu na Ye kosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili : longwa na suka moko ya Likolo kino na suka mosusu.
BSB
BSB:
And He will send out His angels with a loud trumpet call, and they will gather His elect from the four winds, from one end of the heavens to the other.
32
LIN
Tika ete lisese ya nzete ya figi eteya bino : soki kaka bitape na yango elembi mpe ebandi kobimisa makasa, boyebaka ete eleko ya moyi makasi ekomi pene.
BSB
BSB:
Now learn this lesson from the fig tree: As soon as its branches become tender and sprout leaves, you know that summer is near.
33
LIN
Ndenge moko mpe mpo na bino ; tango bokomona makambo wana nyonso, boyeba ete Mwana na Moto akomi pene, lokola na bikuke ya engumba.
BSB
BSB:
So also, when you see all these things, you will know that He is near, right at the door.
34
LIN
Nazali koloba na bino penza ya solo : bato ya ekeke oyo bakoleka te kino makambo wana nyonso ekosalema.
BSB
BSB:
Truly I tell you, this generation will not pass away until all these things have happened.
35
LIN
Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.
BSB
BSB:
Heaven and earth will pass away, but My words will never pass away.
36
LIN
Mpo na oyo etali mokolo to ngonga, moko te ayebi yango, ezala ba-anjelu ya Likolo to Mwana ; Ye moko kaka Tata nde ayebi yango.
BSB
BSB:
No one knows about that day or hour, not even the angels in heaven, nor the Son, but only the Father.
37
LIN
Ndenge esalemaki na tango ya Noa, ndenge wana mpe ekosalema na koya ya Mwana na Moto ;
BSB
BSB:
As it was in the days of Noah, so will it be at the coming of the Son of Man.
38
LIN
pamba te liboso ete mpela eya, bato bazalaki kolia mpe komela, kobala mpe kobalisa bana na bango, kino na mokolo oyo Noa akotaki na masuwa ;
BSB
BSB:
For in the days before the flood, people were eating and drinking, marrying and giving in marriage, up to the day Noah entered the ark.
39
LIN
bayebaki eloko moko te na tina na oyo elingaki kosalema, kino mpela eyaki mpe ekumbaki bango nyonso. Ekozala mpe bongo na koya ya Mwana na Moto.
BSB
BSB:
And they were oblivious until the flood came and swept them all away. So will it be at the coming of the Son of Man.
40
LIN
Mibali mibale bakozala na elanga : moko akokamatama, mpe mosusu akotikala ;
BSB
BSB:
Two men will be in the field: one will be taken and the other left.
41
LIN
basi mibale bakozala konika bambuma na enikelo ; moko akokamatama, mpe mosusu akotikala.
BSB
BSB:
Two women will be grinding at the mill: one will be taken and the other left.
42
LIN
Yango wana, bosenzela ; pamba te boyebi te mokolo nini Nkolo na bino akoya.
BSB
BSB:
Therefore keep watch, because you do not know the day on which your Lord will come.
43
LIN
Bososola malamu likambo oyo : soki nkolo ndako ayebaki ngonga ya butu oyo moyibi akoya, alingaki kosenzela mpe kopekisa ye kokota kati na ndako na ye.
BSB
BSB:
But understand this: If the homeowner had known in which watch of the night the thief was coming, he would have kept watch and would not have let his house be broken into.
44
LIN
Yango wana, bino mpe, bomibongisa, pamba te Mwana na Moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa kutu te.
BSB
BSB:
For this reason, you also must be ready, because the Son of Man will come at an hour you do not expect.
45
LIN
Nani azali mowumbu ya sembo mpe ya mayele epai ya nani nkolo apesaki mokumba ya kokamba basali kati na ndako na ye, mpo ete apesaka bango bilei na bango na tango oyo ekoki ?
BSB
BSB:
Who then is the faithful and wise servant, whom the master has put in charge of his household, to give the others their food at the proper time?
46
LIN
Esengo na mowumbu oyo nkolo na ye, tango akozonga, akokuta azali kosala bongo.
BSB
BSB:
Blessed is that servant whose master finds him doing so when he returns.
47
LIN
Nazali koloba na bino penza ya solo : nkolo na ye akopesa ye mokumba ya kobatela bozwi na ye nyonso.
BSB
BSB:
Truly I tell you, he will put him in charge of all his possessions.
48
LIN
Kasi soki azali mowumbu mabe oyo amilobeli : « Nkolo na ngai awumeli mpo na kozonga, »
BSB
BSB:
But suppose that servant is wicked and says in his heart, ‘My master will be away a long time.’
49
LIN
mpe akomi kobeta baninga na ye ya mosala, bawumbu lokola ye, kolia mpe komela masanga mesa moko elongo na balangwi masanga,
BSB
BSB:
And he begins to beat his fellow servants and to eat and drink with drunkards.
50
LIN
nkolo na ye akozonga na mokolo oyo ye, mowumbu, azali kozela te mpe na ngonga oyo ayebi te ;
BSB
BSB:
The master of that servant will come on a day he does not expect and at an hour he does not anticipate.
51
LIN
akokata-kata ye na biteni mpe akotia ye esika moko na bato ya bilongi mibale, na esika oyo ekozala kolela mpe koswa minu.
BSB
BSB:
Then he will cut him to pieces and assign him a place with the hypocrites, where there will be weeping and gnashing of teeth.
Chapter complete
You’ve read Matthew 24
Chapter 24 of 28 in Matthew
Up next
Matthew 25
Read Matthew 25
Listen
Back to Matthew 23
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Matthew 24
A question this chapter raises
Does Daniel 9 point to the time of the Messiah?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Matthew 23
Matthew 24
Matthew 25