Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.7
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Matt
Matthew
26
LIN
BSB
A
a
Matthew 26
26
Matthew
Death and resurrection
Lingala Bible
Jesus
, person
Peter
, person
Judas
, person
Caiaphas
, person
Galilee
, place
Nazareth
, place
Olives Mount
, place
Bethany
, place
3 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Tango Yesu asilisaki koloba makambo wana nyonso, ayebisaki bayekoli na Ye :
BSB
BSB:
When Jesus had finished saying all these things, He told His disciples,
2
LIN
« Boyebi malamu ete etikali mikolo mibale mpo ete feti ya Pasika ebanda, mpe ete ezali na tango wana nde bakokaba Mwana na Moto mpo ete babaka Ye na ekulusu. »
BSB
BSB:
“You know that the Passover is two days away, and the Son of Man will be handed over to be crucified.”
3
LIN
Boye, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato basanganaki kati na ndako ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe ;
BSB
BSB:
At that time the chief priests and elders of the people assembled in the courtyard of the high priest, whose name was Caiaphas,
4
LIN
bayokanaki kosalela mayele mabe mpo na kokanga Yesu mpe koboma Ye.
BSB
BSB:
and they conspired to arrest Jesus covertly and kill Him.
5
LIN
Kasi balobaki : « Tosala yango te na tango ya feti, noki te bato bakotomboka. »
BSB
BSB:
“But not during the feast,” they said, “or there may be a riot among the people.”
6
LIN
Lokola Yesu azalaki na Betani, na ndako ya Simona oyo azalaki moto na maba,
BSB
BSB:
While Jesus was in Bethany in the home of Simon the Leper,
7
LIN
mwasi moko apusanaki pene na Ye. Na maboko na ye, azalaki na molangi ya alibatre etonda na malasi ya motuya makasi. Wana Yesu azalaki na mesa, mwasi yango asopaki malasi yango na moto ya Yesu.
BSB
BSB:
a woman came to Him with an alabaster jar of expensive perfume, which she poured on His head as He reclined at the table.
8
LIN
Tango bayekoli bamonaki bongo, basilikaki mpe balobaki : — Mpo na nini kobebisa malasi boye ?
BSB
BSB:
When the disciples saw this, they were indignant and asked, “Why this waste?
9
LIN
Bakokaki ata koteka yango na motuya makasi mpe kopesa mbongo epai ya babola !
BSB
BSB:
This perfume could have been sold at a high price, and the money given to the poor.”
10
LIN
Tango Yesu amonaki bongo, alobaki na bango : — Mpo na nini bozali kotungisa mwasi oyo ? Asali Ngai likambo moko ya malamu.
BSB
BSB:
Aware of this, Jesus asked,
“Why are you bothering this woman? She has done a beautiful deed to Me.
11
LIN
Bokozalaka na babola tango nyonso ; kasi Ngai, bokozalaka na Ngai tango nyonso te.
BSB
BSB:
The poor you will always have with you, but you will not always have Me.
12
LIN
Wana asopi malasi oyo na nzoto na Ngai, asali yango mpo na kobongisa kokundama na Ngai.
BSB
BSB:
By pouring this perfume on Me, she has prepared My body for burial.
13
LIN
Nazali koloba na bino penza ya solo : esika nyonso bakosakola Sango Malamu oyo kati na mokili mobimba, bakobanda mpe kolobela likambo mwasi oyo awuti kosala, mpo na kokanisa ye.
BSB
BSB:
Truly I tell you, wherever this gospel is preached in all the world, what she has done will also be told in memory of her.”
14
LIN
Moko kati na bantoma zomi na mibale, oyo kombo na ye ezalaki Yuda Isikarioti, akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe
BSB
BSB:
Then one of the Twelve, the one called Judas Iscariot, went to the chief priests
15
LIN
mpe atunaki bango : — Bozali kokanisa kopesa ngai nini soki nateki Yesu epai na bino ? Boye bafutaki ye mbongo ya bibende tuku misato.
BSB
BSB:
and asked, “What are you willing to give me if I hand Him over to you?” And they set out for him thirty pieces of silver.
16
LIN
Banda na tango wana, Yuda akomaki koluka libaku malamu ya kokaba Yesu.
BSB
BSB:
So from then on Judas looked for an opportunity to betray Jesus.
17
LIN
Na mokolo ya liboso ya feti ya Mapa ezanga levire, bayekoli bayaki kotuna Yesu : — Esika nini olingi ete tobongisela Yo bilei ya Pasika ?
BSB
BSB:
On the first day of the Feast of Unleavened Bread, the disciples came to Jesus and asked, “Where do You want us to prepare for You to eat the Passover?”
18
LIN
Azongiselaki bango : — Bokende na engumba epai ya moto songolo mpe boloba na ye : « Moteyi alobi : ‹ Tango na Ngai ekomi pene ; nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai epai na yo. › »
BSB
BSB:
He answered,
“Go into the city to a certain man and tell him that the Teacher says, ‘My time is near. I will keep the Passover with My disciples at your house.’”
19
LIN
Bayekoli basalaki ndenge Yesu atindaki bango mpe babongisaki bilei ya Pasika.
BSB
BSB:
So the disciples did as Jesus had directed them and prepared the Passover.
20
LIN
Tango pokwa ekomaki, Yesu avandaki na mesa elongo na bayekoli zomi na mibale.
BSB
BSB:
When evening came, Jesus was reclining with the twelve disciples.
21
LIN
Wana bazalaki kolia, Yesu alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moko kati na bino akoteka Ngai.
BSB
BSB:
And while they were eating, He said to them,
“Truly I tell you, one of you will betray Me.”
22
LIN
Bayokaki mawa mingi, mpe bakomaki kotuna Ye, moko sima na moninga : — Nkolo, ezali ngai ?
BSB
BSB:
They were deeply grieved and began to ask Him one after another, “Surely not I, Lord?”
23
LIN
Yesu azongisaki : — Moto oyo akoteka Ngai azali kolia sani moko elongo na Ngai.
BSB
BSB:
Jesus answered,
“The one who has dipped his hand into the bowl with Me will betray Me.
24
LIN
Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge ekomama na tina na Ye ; kasi mawa na moto oyo akoteka Mwana na Moto ! Elingaki kozala malamu koleka mpo na moto yango ete abotama te.
BSB
BSB:
The Son of Man will go just as it is written about Him, but woe to that man by whom He is betrayed. It would be better for him if he had not been born.”
25
LIN
Yuda, ye oyo asengeli koteka Ye, alobaki : — Moteyi, ezali ngai ? Yesu azongiselaki ye : — Olobi yango.
BSB
BSB:
Then Judas, who would betray Him, said, “Surely not I, Rabbi?” Jesus answered,
“You have said it yourself.”
26
LIN
Wana bazalaki kolia, Yesu azwaki lipa ; sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki yango na bayekoli na koloba : — Oyo ezali nzoto na Ngai ! Bozwa mpe bolia.
BSB
BSB:
While they were eating, Jesus took bread, spoke a blessing and broke it, and gave it to the disciples, saying,
“Take and eat; this is My body.”
27
LIN
Azwaki lisusu kopo ; mpe sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, apesaki bango yango na koloba : — Bomela yango bino nyonso ;
BSB
BSB:
Then He took the cup, gave thanks, and gave it to them, saying,
“Drink from it, all of you.
28
LIN
ezali makila na Ngai ya Boyokani, makila oyo esopani mpo na bato ebele, mpo ete masumu na bango elimbisama.
BSB
BSB:
This is My blood of the covenant, which is poured out for many for the forgiveness of sins.
29
LIN
Nazali koloba na bino penza ya solo : kobanda sik’oyo, nakomela lisusu vino oyo te kino na mokolo oyo nakomela yango, ya sika, elongo na bino, kati na Bokonzi ya Tata na Ngai.
BSB
BSB:
I tell you, I will not drink of this fruit of the vine from now on until that day when I drink it anew with you in My Father’s kingdom.”
30
LIN
Sima na yango, bayembaki banzembo ; bongo babimaki mpo na kokende na ngomba ya banzete ya olive.
BSB
BSB:
And when they had sung a hymn, they went out to the Mount of Olives.
31
LIN
Yesu alobaki na bango : — Na butu ya lelo, bokokweyisa kondima na bino mpo na Ngai ; pamba te ekomama : « Nakobeta mobateli bibwele, mpe bameme ya etonga ekopalangana. »
BSB
BSB:
Then Jesus said to them,
“This very night you will all fall away on account of Me. For it is written: ‘I will strike the Shepherd, and the sheep of the flock will be scattered.’
32
LIN
Kasi, sima na Ngai kosekwa, nakokende na Galile, liboso na bino.
BSB
BSB:
But after I have risen, I will go ahead of you into Galilee.”
33
LIN
Petelo alobaki : — Ata soki bango nyonso bakweyisi kondima na bango likolo na Yo, ngai nakotikala kokweyisa kondima na ngai te.
BSB
BSB:
Peter said to Him, “Even if all fall away on account of You, I never will.”
34
LIN
Yesu azongiselaki ye : — Nazali koloba na yo penza ya solo : kaka na butu ya lelo, liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato.
BSB
BSB:
“Truly I tell you,”
Jesus declared,
“this very night, before the rooster crows, you will deny Me three times.”
35
LIN
Petelo alobaki na Ye : — Ata soki nasengeli kokufa elongo na Yo, nakowangana Yo te. Mpe bayekoli nyonso balobaki kaka ndenge moko.
BSB
BSB:
Peter replied, “Even if I have to die with You, I will never deny You.” And all the other disciples said the same thing.
36
LIN
Elongo na bayekoli na Ye, Yesu akomaki na esika oyo babengaka Getisemane mpe alobaki na bango : — Botikala awa, wana Ngai nakeyi kosambela kuna.
BSB
BSB:
Then Jesus went with His disciples to a place called Gethsemane, and He told them,
“Sit here while I go over there and pray.”
37
LIN
Wana amemaki Petelo mpe bana mibali mibale ya Zebede, akomaki mawa-mawa mpe komitungisa ;
BSB
BSB:
He took with Him Peter and the two sons of Zebedee and began to be sorrowful and deeply distressed.
38
LIN
alobaki na bango : — Motema na Ngai etondi na mawa pene nakufa ; botikala awa mpe bosenzela elongo na Ngai.
BSB
BSB:
Then He said to them,
“My soul is consumed with sorrow to the point of death. Stay here and keep watch with Me.”
39
LIN
Akendeki mwa mosika, amikitisaki elongi kino na mabele mpe asambelaki boye : — Tata, soki ekoki kosalema, tika ete kopo oyo ya pasi ekende mosika na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo.
BSB
BSB:
Going a little farther, He fell facedown and prayed,
“My Father, if it is possible, let this cup pass from Me. Yet not as I will, but as You will.”
40
LIN
Bongo azongaki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi ; alobaki na Petelo : — Boni, bokokaki te kosenzela elongo na Ngai mpo na ngonga moko ?
BSB
BSB:
Then Jesus returned to the disciples and found them sleeping.
“Were you not able to keep watch with Me for one hour?”
He asked Peter.
41
LIN
Bosenzela mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama. Molimo ezalaka na posa makasi ya kosala malamu, kasi nzoto ezalaka na bolembu.
BSB
BSB:
“Watch and pray so that you will not enter into temptation. For the spirit is willing, but the body is weak.”
42
LIN
Akendeki lisusu mwa mosika, na mbala ya mibale, mpe abondelaki : — Tata na Ngai, soki ekoki kosalema te ete kopo oyo ya pasi ekende mosika na Ngai, wana tika ete mokano na Yo esalema !
BSB
BSB:
A second time He went away and prayed,
“My Father, if this cup cannot pass unless I drink it, may Your will be done.”
43
LIN
Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango lisusu balala pongi, pamba te bayokaki pongi makasi mpe miso na bango ekomaki kilo.
BSB
BSB:
And again Jesus returned and found them sleeping, for their eyes were heavy.
44
LIN
Boye, atikaki bango mpe akendeki lisusu mosika ; mpe, mpo na mbala ya misato, abondelaki na maloba kaka wana.
BSB
BSB:
So He left them and went away once more and prayed a third time, saying the same thing.
45
LIN
Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki, mpe alobaki na bango : — Bozali kaka kokoba kolala pongi mpe kopema ? Ngonga ekoki ; Mwana na Moto akokabama na maboko ya bato ya masumu.
BSB
BSB:
Then He returned to the disciples and said,
“Are you still sleeping and resting? Look, the hour is near, and the Son of Man is betrayed into the hands of sinners.
46
LIN
Botelema ; tokende. Moto oyo ateki Ngai azali koya.
BSB
BSB:
Rise, let us go! See, My betrayer is approaching!”
47
LIN
Wana Yesu azalaki nanu koloba, Yuda, moko kati na bayekoli zomi na mibale, akomaki elongo na bato ebele oyo basimbaki mipanga mpe banzete ; ezalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato nde batindaki bango.
BSB
BSB:
While Jesus was still speaking, Judas, one of the Twelve, arrived, accompanied by a large crowd armed with swords and clubs, sent from the chief priests and elders of the people.
48
LIN
Moto oyo atekaki Yesu apesaki bango elembo moko ; alobaki na bango : « Moto oyo ngai nakopesa beze, ezali nde ye ; bokanga ye. »
BSB
BSB:
Now the betrayer had arranged a signal with them: “The One I kiss is the man; arrest Him.”
49
LIN
Mbala moko, apusanaki pene ya Yesu mpe alobaki na Ye : — Mbote, Moteyi ! Mpe apesaki Ye beze.
BSB
BSB:
Going directly to Jesus, he said, “Greetings, Rabbi!” and kissed Him.
50
LIN
Yesu alobaki na ye : — Molingami na Ngai, likambo oyo oyei kosala awa, sala yango. Bongo bato mosusu oyo bayaki elongo na ye bapusanaki, basimbaki Yesu na makasi mpe bakangaki Ye.
BSB
BSB:
“Friend,”
Jesus replied,
“do what you came for.”
Then the men stepped forward, seized Jesus, and arrested Him.
51
LIN
Moko kati na baninga ya Yesu asembolaki loboko, abimisaki mopanga na ye wuta na ebombelo na yango, abetaki yango mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi.
BSB
BSB:
At this, one of Jesus’ companions drew his sword and struck the servant of the high priest, cutting off his ear.
52
LIN
Kasi Yesu alobaki na ye : — Zongisa mopanga na yo kati na ebombelo na yango, pamba te bato nyonso oyo babundaka na mopanga bakokufa na nzela ya mopanga.
BSB
BSB:
“Put your sword back in its place,”
Jesus said to him.
“For all who draw the sword will die by the sword.
53
LIN
Okanisi ete nakoki te kobenga Tata na Ngai, oyo akoki mpe mbala moko kotinda ba-anjelu koleka bankoto zomi mpo na koya kosunga Ngai ?
BSB
BSB:
Are you not aware that I can call on My Father, and He will at once put at My disposal more than twelve legions of angels?
54
LIN
Nzokande, soki mpe esalemi ndenge wana, Makomi ekokokisama te ; pamba te ezali koloba ete makambo nyonso wana esengeli kosalema bongo.
BSB
BSB:
But how then would the Scriptures be fulfilled that say it must happen this way?”
55
LIN
Kaka na ngonga yango, Yesu alobaki na ebele ya bato : — Boni, nakomi motomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe na banzete ? Nazalaki kovanda mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kopesa malakisi na Ngai, mpe bokangaki Ngai te.
BSB
BSB:
At that time Jesus said to the crowd,
“Have you come out with swords and clubs to arrest Me as you would an outlaw? Every day I sat teaching in the temple courts, and you did not arrest Me.
56
LIN
Kasi makambo oyo nyonso esalemi mpo ete Makomi ya basakoli ekokisama. Bongo bayekoli nyonso basundolaki Ye mpe bakimaki.
BSB
BSB:
But this has all happened so that the writings of the prophets would be fulfilled.”
Then all the disciples deserted Him and fled.
57
LIN
Bato oyo bakangaki Yesu bamemaki Ye liboso ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe, epai wapi balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato basanganaki.
BSB
BSB:
Those who had arrested Jesus led Him away to the house of Caiaphas the high priest, where the scribes and elders had gathered.
58
LIN
Petelo azalaki kolanda Yesu na mosika, kino na ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; akotaki kati na lopango mpe avandaki elongo na bakengeli mpo na kotala ndenge makambo ekosuka.
BSB
BSB:
But Peter followed Him at a distance, right up to the courtyard of the high priest. And he went in and sat down with the guards to see the outcome.
59
LIN
Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda bazalaki koluka litatoli moko oyo ekobimisa polele mabe ya Yesu mpo ete bakoka kokatela Ye etumbu ya kufa,
BSB
BSB:
Now the chief priests and the whole Sanhedrin were seeking false testimony against Jesus in order to put Him to death.
60
LIN
kasi bazwaki yango te, atako bato mingi bakendeki mpo na kokosela Ye makambo. Bongo, bato mibale bayaki
BSB
BSB:
But they did not find any, though many false witnesses came forward. Finally two came forward
61
LIN
mpe balobaki : — Moto oyo alobaki : « Ngai nakoki kobuka Tempelo ya Nzambe mpe kotonga yango lisusu na mikolo misato. »
BSB
BSB:
and declared, “This man said, ‘I am able to destroy the temple of God and rebuild it in three days.’”
62
LIN
Mokonzi ya Banganga-Nzambe atelemaki mpe atunaki Yesu : — Boni, ozali te na liloba ya kozongisa ? Olobi nini liboso ya makambo oyo bazali kofunda yo na yango ?
BSB
BSB:
So the high priest stood up and asked Him, “Have You no answer? What are these men testifying against You?”
63
LIN
Kasi Yesu abatelaki kimia. Boye mokonzi ya Banganga-Nzambe alobaki na Ye : — Na Kombo ya Nzambe na bomoi, napesi yo mitindo : « Yebisa biso soki ozali Klisto, Mwana na Nzambe. »
BSB
BSB:
But Jesus remained silent. Then the high priest said to Him, “I charge You under oath by the living God: Tell us if You are the Christ, the Son of God.”
64
LIN
Yesu azongiselaki ye : — Otatoli yango. Kasi nazali koloba na bino : Kobanda sik’oyo, bokomona Mwana na Moto kovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe koya na nkembo na likolo ya mapata ya Likolo.
BSB
BSB:
“You have said it yourself,”
Jesus answered.
“But I say to all of you, from now on you will see the Son of Man sitting at the right hand of Power and coming on the clouds of heaven.”
65
LIN
Mokonzi ya Banganga-Nzambe apasolaki bilamba na ye mpe alobaki : — Afingi Nzambe ! Mpo na nini koluka lisusu batatoli ? Bino moko boyoki ndenge nini afingi Nzambe !
BSB
BSB:
At this, the high priest tore his clothes and declared, “He has blasphemed! Why do we need any more witnesses? Look, now you have heard the blasphemy.
66
LIN
Bokanisi nini mpo na yango ? Bazongisaki : — Abongi na kufa.
BSB
BSB:
What do you think?” “He deserves to die,” they answered.
67
LIN
Babwakelaki Ye soyi na elongi mpe babetaki Ye makofi ; bato mosusu babetaki Ye bambata
BSB
BSB:
Then they spit in His face and struck Him. Others slapped Him
68
LIN
mpe balobaki : — Klisto, sakola kati na biso ; yebisa biso moto oyo abeti yo !
BSB
BSB:
and said, “Prophesy to us, Christ! Who hit You?”
69
LIN
Na tango wana, Petelo avandaki libanda, kati na lopango ya kati. Mwasi mosali moko apusanaki pene na ye mpe alobaki : — Yo mpe, ozalaki elongo na Yesu, moto ya Galile.
BSB
BSB:
Meanwhile, Peter was sitting out in the courtyard, and a servant girl came up to him. “You also were with Jesus the Galilean,” she said.
70
LIN
Kasi Petelo awanganaki na miso ya bato nyonso : — Nayebi te makambo oyo ozali koloba !
BSB
BSB:
But he denied it before them all: “I do not know what you are talking about.”
71
LIN
Wana Petelo azalaki kokende na ekuke mpo na kobima, mwasi mosali mosusu amonaki ye mpe alobaki na bato oyo bazalaki wana : — Moto oyo azalaki elongo na Yesu ya Nazareti.
BSB
BSB:
When Peter had gone out to the gateway, another servant girl saw him and said to the people there, “This man was with Jesus of Nazareth.”
72
LIN
Petelo awanganaki yango lisusu na kolapa ndayi : — Nayebi moto wana te !
BSB
BSB:
And again he denied it with an oath: “I do not know the man!”
73
LIN
Sima na mwa tango moke, bato oyo bazalaki wana bapusanaki mpe balobaki na Petelo : — Ezali ya solo, yo mpe ozali moko kati na bato wana ; elobeli na yo ezali kofunda yo.
BSB
BSB:
After a little while, those standing nearby came up to Peter. “Surely you are one of them,” they said, “for your accent gives you away.”
74
LIN
Bongo Petelo abandaki kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe : — Tika ete Nzambe alakela ngai mabe soki nakosi ! Nalapi ndayi : Nayebi moto yango te ! Mpe, mbala moko, soso elelaki.
BSB
BSB:
At that he began to curse and swear to them, “I do not know the man!” And immediately a rooster crowed.
75
LIN
Bongo Petelo akanisaki maloba ya Yesu : « Liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato. » Abimaki mpe alelaki makasi na libanda.
BSB
BSB:
Then Peter remembered the word that Jesus had spoken:
“Before the rooster crows, you will deny Me three times.”
And he went outside and wept bitterly.
Chapter complete
You’ve read Matthew 26
Chapter 26 of 28 in Matthew
Up next
Matthew 27
Read Matthew 27
Listen
Back to Matthew 25
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Matthew 26
A question this chapter raises
Did Jesus come to bring a sword, not peace?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Matthew 25
Matthew 26
Matthew 27