Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.7
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Matt
Matthew
27
LIN
BSB
A
a
Matthew 27
27
Matthew
Death and resurrection
Lingala Bible
Jesus
, person
Pilate
, person
Barabbas
, person
PottersField
, place
Israel
, person
Elias
, person
Magdalene
, place
Mary Magdalene
, person
13 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Tango tongo etanaki, bakonzi nyonso ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato basalelaki Yesu likita mpo na kobomisa Ye.
BSB
BSB:
When morning came, all the chief priests and elders of the people conspired against Jesus to put Him to death.
2
LIN
Bakangaki Ye basinga, bamemaki Ye mpe bakabaki Ye na maboko ya moyangeli Pilato.
BSB
BSB:
They bound Him, led Him away, and handed Him over to Pilate the governor.
3
LIN
Tango Yuda oyo atekaki Yesu amonaki ete bakateli Yesu etumbu, ayokaki pasi mingi na motema mpe akendeki kozongisa mbongo wana ya bibende tuku misato epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato.
BSB
BSB:
When Judas, who had betrayed Him, saw that Jesus was condemned, he was filled with remorse and returned the thirty pieces of silver to the chief priests and elders.
4
LIN
Alobaki na bango : — Nasali masumu mpo ete nateki moto oyo asali mabe te ! Kasi bango bazongisaki : — Etali biso na nini ? Etali nde yo moko !
BSB
BSB:
“I have sinned by betraying innocent blood,” he said. “What is that to us?” they replied. “You bear the responsibility.”
5
LIN
Yuda abwakaki mbongo yango kati na Tempelo, alongwaki wana mpe akendeki komidiembika.
BSB
BSB:
So Judas threw the silver into the temple and left. Then he went away and hanged himself.
6
LIN
Bakonzi ya Banganga-Nzambe balokotaki mbongo yango mpe balobaki : — Mibeko epesi nzela te ya kotia mbongo oyo na ebombelo misolo ya Tempelo, pamba te ezali mbongo ya makila.
BSB
BSB:
The chief priests picked up the pieces of silver and said, “It is unlawful to put this into the treasury, since it is blood money.”
7
LIN
Boye, basanganaki mpe bazwaki mokano ya kosomba, na mbongo yango, elanga ya mosali mbeki, mpe ya kokomisa yango lilita mpo na kokunda bapaya.
BSB
BSB:
After conferring together, they used the money to buy the potter’s field as a burial place for foreigners.
8
LIN
Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka elanga yango elanga ya makila.
BSB
BSB:
That is why it has been called the Field of Blood to this day.
9
LIN
Ezali ndenge wana nde maloba ya mosakoli Jeremi ekokisamaki : « Bakamataki mbongo ya bibende ya palata tuku misato, motuya oyo bato ya Isalaele bakataki mpo na ye,
BSB
BSB:
Then what was spoken through Jeremiah the prophet was fulfilled: “They took the thirty pieces of silver, the price set on Him by the people of Israel,
10
LIN
mpe basombaki na yango elanga ya mosali mbeki ndenge Nkolo atindaki ngai. »
BSB
BSB:
and they gave them for the potter’s field, as the Lord had commanded me.”
11
LIN
Yesu asambaki liboso ya moyangeli. Moyangeli atunaki Yesu : — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ? Yesu azongisaki : — Olobi yango.
BSB
BSB:
Meanwhile Jesus stood before the governor, who questioned Him: “Are You the King of the Jews?”
“You have said so,”
Jesus replied.
12
LIN
Sima na yango, tango bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bafundaki Ye, azongisaki lisusu eloko moko te.
BSB
BSB:
And when He was accused by the chief priests and elders, He gave no answer.
13
LIN
Bongo Pilato atunaki Ye : — Ozali koyoka te makambo nyonso oyo bazali koloba mpo na kofunda Yo ?
BSB
BSB:
Then Pilate asked Him, “Do You not hear how many charges they are bringing against You?”
14
LIN
Kasi Yesu azongisaki ata liloba moko te ; mpe moyangeli akamwaki makasi.
BSB
BSB:
But Jesus gave no answer, not even to a single charge, much to the governor’s amazement.
15
LIN
Na feti nyonso ya Pasika, moyangeli azalaki na momesano ya kobimisa na boloko mokangami moko oyo bato bazalaki kopona.
BSB
BSB:
Now it was the governor’s custom at the feast to release to the crowd a prisoner of their choosing.
16
LIN
Na tango wana, ezalaki na mokangami moko oyo ayebanaki mingi, kombo na ye ezalaki Yesu Barabasi.
BSB
BSB:
At that time they were holding a notorious prisoner named Barabbas.
17
LIN
Tango Pilato amonaki ebele ya bato basangani, atunaki bango : — Kati na Yesu Barabasi mpe Yesu oyo babengaka Klisto, bolingi nabimisela bino nani mpo ete akoma nsomi ?
BSB
BSB:
So when the crowd had assembled, Pilate asked them, “Which one do you want me to release to you: Barabbas, or Jesus who is called Christ?”
18
LIN
Pilato ayebaki malamu ete ezali mpo na likunya nde bakabaki Yesu na maboko na ye.
BSB
BSB:
For he knew it was out of envy that they had handed Jesus over to him.
19
LIN
Wana Pilato avandaki na esambiselo, mwasi na ye atindelaki ye maloba : — Kokota te na makambo ya moto wana ya sembo ; pamba te na butu ya lelo, namoni pasi mingi kati na ndoto likolo na ye !
BSB
BSB:
While Pilate was sitting on the judgment seat, his wife sent him this message: “Have nothing to do with that innocent man, for I have suffered terribly in a dream today because of Him.”
20
LIN
Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bandimisaki ebele ya bato ete basenga na makasi kobima ya Barabasi longwa na boloko, mpe komona ndenge bakoboma Yesu.
BSB
BSB:
But the chief priests and elders persuaded the crowds to ask for Barabbas and to have Jesus put to death.
21
LIN
Moyangeli atunaki bango lisusu : — Kati na bango mibale, bolingi nabimisela bino nani ? Bazongisaki na koganga : — Barabasi !
BSB
BSB:
“Which of the two do you want me to release to you?” asked the governor. “Barabbas,” they replied.
22
LIN
Pilato atunaki bango : — Nasala nini na Yesu oyo babengaka Klisto ? Bato nyonso bazongisaki : — Baka ye na ekulusu !
BSB
BSB:
“What then should I do with Jesus who is called Christ?” Pilate asked. They all answered, “Crucify Him!”
23
LIN
Pilato atunaki lisusu : — Mabe nini asali ? Kasi bakobaki kaka koganga makasi koleka : — Baka ye na ekulusu !
BSB
BSB:
“Why?” asked Pilate. “What evil has He done?” But they shouted all the louder, “Crucify Him!”
24
LIN
Tango Pilato amonaki ete akokoka lisusu kosala eloko te, mpe ete mobulu ya bato ezalaki komata se komata, azwaki mayi, asukolaki maboko na ye liboso ya bato na koloba : — Makila ya moto oyo ekotangama na moto na ngai te, kasi na mito na bino.
BSB
BSB:
When Pilate saw that he was accomplishing nothing, but that instead a riot was breaking out, he took water and washed his hands before the crowd. “I am innocent of this man’s blood,” he said. “You bear the responsibility.”
25
LIN
Bato nyonso bazongisaki : — Tika ete makila na ye etangama na mito na biso mpe ya bana na biso !
BSB
BSB:
All the people answered, “His blood be on us and on our children!”
26
LIN
Pilato abimiselaki bango Barabasi ; mpe sima na kobetisa Yesu fimbu, apesaki Ye na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu.
BSB
BSB:
So Pilate released Barabbas to them. But he had Jesus flogged, and handed Him over to be crucified.
27
LIN
Basoda ya moyangeli bakumbaki Yesu kati na esambiselo mpe basangisaki zingazinga na Ye lisanga mobimba ya basoda.
BSB
BSB:
Then the governor’s soldiers took Jesus into the Praetorium and gathered the whole company around Him.
28
LIN
Balongolaki Ye bilamba, balatisaki Ye nzambala ya motane,
BSB
BSB:
They stripped Him and put a scarlet robe on Him.
29
LIN
balatisaki Ye ekoti ya nzube na moto mpe basimbisaki Ye lingenda moke na loboko na Ye ya mobali ; bongo babandaki kofukama liboso na Ye mpo na kotiola Ye, na koloba : « Mbote, mokonzi ya Bayuda ! »
BSB
BSB:
And they twisted together a crown of thorns and set it on His head. They put a staff in His right hand, knelt down before Him, and mocked Him, saying, “Hail, King of the Jews!”
30
LIN
Bazalaki kobwakela Ye soyi, kokamata lingenda moke oyo basimbisaki Ye na loboko mpe kobeta Ye na moto.
BSB
BSB:
Then they spit on Him and took the staff and struck Him on the head repeatedly.
31
LIN
Sima na bango kosakanela Ye, balongolaki Ye nzambala, balatisaki Ye bilamba na Ye mpe bakumbaki Ye mpo na kobaka Ye na ekulusu.
BSB
BSB:
After they had mocked Him, they removed the robe and put His own clothes back on Him. Then they led Him away to crucify Him.
32
LIN
Wana bazalaki kobima na engumba, bakutanaki na moto moko ya Sirene, kombo na ye ezalaki Simona ; mpe bakangaki ye na makasi mpo ete amema ekulusu ya Yesu.
BSB
BSB:
Along the way they found a man from Cyrene, named Simon, and they forced him to carry the cross of Jesus.
33
LIN
Tango bakomaki na esika oyo babengaka « Gologota, » oyo elingi koloba : esika ya mokuwa ya moto,
BSB
BSB:
And when they came to a place called Golgotha, which means The Place of the Skull,
34
LIN
bapesaki Yesu masanga ya vino basangisa na mayi ya bololo mpo ete amela ; kasi sima na Ye komeka masanga yango, aboyaki komela yango.
BSB
BSB:
they offered Him wine to drink, mixed with gall; but after tasting it, He refused to drink it.
35
LIN
Sima na bango kobaka Yesu na ekulusu, bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke ;
BSB
BSB:
When they had crucified Him, they divided up His garments by casting lots.
36
LIN
mpe bavandaki wana mpo na kokengela Ye.
BSB
BSB:
And sitting down, they kept watch over Him there.
37
LIN
Na likolo ya moto ya Yesu, batiaki makomi oyo mpo na kotalisa mpo nini bakatelaki Ye etumbu : Moto oyo azali Yesu, Mokonzi ya Bayuda.
BSB
BSB:
Above His head they posted the written charge against Him: THIS IS JESUS, THE KING OF THE JEWS.
38
LIN
Babomi mibale ya bato babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
BSB
BSB:
Two robbers were crucified with Him, one on His right and the other on His left.
39
LIN
Baleki nzela bazalaki kofinga Ye na koningisa mito na bango ;
BSB
BSB:
And those who passed by heaped abuse on Him, shaking their heads
40
LIN
bazalaki koloba : « Yo oyo okobuka Tempelo mpe okotonga yango lisusu na mikolo misato, mibikisa yo moko ! Soki ozali penza Mwana na Nzambe, kita longwa na ekulusu ! »
BSB
BSB:
and saying, “You who are going to destroy the temple and rebuild it in three days, save Yourself! If You are the Son of God, come down from the cross!”
41
LIN
Bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko elongo na bakambi ya bato bazalaki mpe kotiola Yesu na koloba :
BSB
BSB:
In the same way, the chief priests, scribes, and elders mocked Him, saying,
42
LIN
« Abikisaki bato mosusu, kasi ye moko akoki komibikisa te ! Azali mokonzi ya Isalaele ! Tika ete akita sik’oyo longwa na ekulusu, bongo tokondimela Ye.
BSB
BSB:
“He saved others, but He cannot save Himself. He is the King of Israel! Let Him come down now from the cross, and we will believe in Him.
43
LIN
Atiaka elikya na ye kati na Nzambe ; tika ete Nzambe akangola ye sik’oyo soki alingaka ye, pamba te azalaki koloba : ‹ Nazali Mwana na Nzambe. › »
BSB
BSB:
He trusts in God. Let God deliver Him now if He wants Him. For He said,
‘I am the Son of God.’”
44
LIN
Babomi bato oyo babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu bazalaki mpe kofinga Ye ndenge wana.
BSB
BSB:
In the same way, even the robbers who were crucified with Him berated Him.
45
LIN
Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba.
BSB
BSB:
From the sixth hour until the ninth hour darkness came over all the land.
46
LIN
Pene na ngonga ya misato ya pokwa, Yesu agangaki : — Eloi, Eloi, lema sabachtani ? Elingi koloba : Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini osundoli Ngai ?
BSB
BSB:
About the ninth hour Jesus cried out in a loud voice,
“Eli, Eli, lema sabachthani?”
which means,
“My God, My God, why have You forsaken Me?”
47
LIN
Kati na bato oyo batelemaki wana, ndambo bayokaki Ye ; boye bakomaki koloba : — Azali kobenga Eliya !
BSB
BSB:
When some of those standing there heard this, they said, “He is calling Elijah.”
48
LIN
Mbala moko, moko kati na bango akendeki mbangu kokamata eponze moko, azindisaki yango na vino ya ngayi, atiaki eponze yango na songe ya mwa nzete mpe apesaki yango Yesu mpo ete amela.
BSB
BSB:
One of them quickly ran and brought a sponge. He filled it with sour wine, put it on a reed, and held it up for Jesus to drink.
49
LIN
Kasi bato mosusu balobaki : — Zela ! Totala soki Eliya akoya kobikisa ye.
BSB
BSB:
But the others said, “Leave Him alone. Let us see if Elijah comes to save Him.”
50
LIN
Kasi Yesu agangaki lisusu makasi, mpe azongisaki molimo na Ye.
BSB
BSB:
When Jesus had cried out again in a loud voice, He yielded up His spirit.
51
LIN
Kaka na tango yango, rido ya Tempelo epasukaki na biteni mibale, kobanda na likolo kino na se, mabele eninganaki, mabanga minene epasukaki,
BSB
BSB:
At that moment the veil of the temple was torn in two from top to bottom. The earth quaked, and the rocks were split.
52
LIN
bakunda efungwamaki, mpe banzoto ya basantu ebele oyo bakufa esekwaki :
BSB
BSB:
The tombs broke open, and the bodies of many saints who had fallen asleep were raised.
53
LIN
ebimaki na bakunda mpe, sima na lisekwa ya Yesu, ekotaki kati na engumba ya bule epai wapi bato ebele bamonaki yango.
BSB
BSB:
After Jesus’ resurrection, when they had come out of the tombs, they entered the holy city and appeared to many people.
54
LIN
Tango mokonzi ya basoda ya Rome elongo na basoda oyo bazalaki kokengela Yesu bamonaki ndenge mabele eninganaki mpe nyonso oyo esalemaki, bayokaki somo makasi mpe balobaki : — Moto oyo azalaki penza Mwana na Nzambe !
BSB
BSB:
When the centurion and those with him who were guarding Jesus saw the earthquake and all that had happened, they were terrified and said, “Truly this was the Son of God.”
55
LIN
Basi ebele bazalaki wana, bazalaki kotala na mosika ; balandaki Yesu longwa na Galile mpo na kosunga Ye.
BSB
BSB:
And many women were there, watching from a distance. They had followed Jesus from Galilee to minister to Him.
56
LIN
Kati na basi yango, ezalaki na Mari, moto ya Magidala ; Mari, mama ya Jake mpe ya Jozefi ; mpe mama ya bana ya Zebede.
BSB
BSB:
Among them were Mary Magdalene, Mary the mother of James and Joseph, and the mother of Zebedee’s sons.
57
LIN
Tango pokwa ekomaki, mozwi moko ayaki ; kombo na ye ezalaki Jozefi, moto ya mboka Arimate ; ye mpe akomaki moyekoli ya Yesu.
BSB
BSB:
When it was evening, there came a rich man from Arimathea named Joseph, who himself was a disciple of Jesus.
58
LIN
Akendeki kosenga nzoto ya Yesu epai ya Pilato ; mpe Pilato apesaki mitindo ete bapesa ye yango.
BSB
BSB:
He went to Pilate to ask for the body of Jesus, and Pilate ordered that it be given to him.
59
LIN
Jozefi azwaki nzoto ya Yesu, alingaki yango na liputa ya lino ya peto
BSB
BSB:
So Joseph took the body, wrapped it in a clean linen cloth,
60
LIN
mpe atiaki nzoto yango kati na kunda moko ya sika, oyo atobolisaki ye moko kati na libanga moko ya monene. Mpe atindikaki libanga mosusu ya monene liboso ya ekotelo ya kunda yango, mpe azongaki.
BSB
BSB:
and placed it in his own new tomb that he had cut into the rock. Then he rolled a great stone across the entrance to the tomb and went away.
61
LIN
Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari mosusu bavandaki wana, na ngambo mosusu ya kunda.
BSB
BSB:
Mary Magdalene and the other Mary were sitting there opposite the tomb.
62
LIN
Mokolo oyo elandaki, mokolo oyo elandaki Mokolo ya kobongisa Saba, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo bakendeki epai ya Pilato
BSB
BSB:
The next day, the one after Preparation Day, the chief priests and Pharisees assembled before Pilate.
63
LIN
mpo na koloba na ye : — Mokonzi, makanisi ezongeli biso na tina na mokosi wana ! Tango azalaki na bomoi, alobaki : « Sima na mikolo misato, nakosekwa. »
BSB
BSB:
“Sir,” they said, “we remember that while He was alive that deceiver said,
‘After three days I will rise again.’
64
LIN
Yango wana, pesa mitindo ete bakengela malamu kunda yango kino na mokolo ya misato. Soki te, bayekoli na ye bakoya koyiba nzoto mpo ete, na sima, baloba na bato ete asekwi kati na bakufi. Lokuta oyo ya suka ekoya kozala lisusu mabe koleka oyo ya liboso.
BSB
BSB:
So give the order that the tomb be secured until the third day. Otherwise, His disciples may come and steal Him away and tell the people He has risen from the dead. And this last deception would be worse than the first.”
65
LIN
Pilato azongisaki : — Bozwa bakengeli mpe bokende kokengela kunda ndenge bokanisi kosala.
BSB
BSB:
“You have a guard,” Pilate said. “Go, make the tomb as secure as you know how.”
66
LIN
Boye bakendeki mpe basalaki nyonso oyo ekoki mpo ete kunda ekengelama malamu ; batiaki elembo na libanga oyo bakangaki na yango kunda mpe batiaki bakengeli.
BSB
BSB:
So they went and secured the tomb by sealing the stone and posting the guard.
Chapter complete
You’ve read Matthew 27
Chapter 27 of 28 in Matthew
Up next
Matthew 28
Read Matthew 28
Listen
Back to Matthew 26
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Matthew 27
A question this chapter raises
How did Judas die? Matthew and Acts disagree.
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Matthew 26
Matthew 27
Matthew 28