Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.7
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Matt
Matthew
28
LIN
BSB
A
a
Matthew 28
28
Matthew
Death and resurrection
Lingala Bible
Jesus
, person
Galilee
, place
Magdalene
, place
Mary Magdalene
, person
Mary
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Sima na mokolo ya Saba, na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari mosusu bakendeki kotala kunda.
BSB
BSB:
After the Sabbath, at dawn on the first day of the week, Mary Magdalene and the other Mary went to see the tomb.
2
LIN
Mbala moko, mabele eninganaki makasi, pamba te anjelu ya Nkolo akitaki longwa na Likolo, akendeki na kunda, atindikaki libanga mpe avandaki na likolo na yango.
BSB
BSB:
Suddenly there was a great earthquake, for an angel of the Lord descended from heaven, rolled away the stone, and sat on it.
3
LIN
Azalaki kongenga lokola mikalikali, mpe bilamba na ye ezalaki pembe makasi lokola mvula ya pembe.
BSB
BSB:
His appearance was like lightning, and his clothes were white as snow.
4
LIN
Bakengeli bakomaki kolenga mpo na somo mpe bakomaki lokola bato ya kokufa.
BSB
BSB:
The guards trembled in fear of him and became like dead men.
5
LIN
Kasi anjelu alobaki na basi : « Bobanga te ! Nayebi ete bozali koluka Yesu oyo babakaki na ekulusu.
BSB
BSB:
But the angel said to the women, “Do not be afraid, for I know that you are looking for Jesus, who was crucified.
6
LIN
Azali lisusu awa te, pamba te asili kosekwa, ndenge kaka alobaki. Boya kotala esika oyo nzoto na Ye ezalaki,
BSB
BSB:
He is not here; He has risen, just as He said! Come, see the place where He lay.
7
LIN
mpe bokende noki koyebisa bayekoli na Ye : ‹ Asili kosekwa kati na bakufi ; akei liboso na bino, na Galile ; ezali kuna nde bokomona Ye. › Yango nde makambo oyo nazalaki na yango ya koyebisa bino. »
BSB
BSB:
Then go quickly and tell His disciples, ‘He has risen from the dead and is going ahead of you into Galilee. There you will see Him.’ See, I have told you.”
8
LIN
Balongwaki noki na kunda, na somo mpe na esengo makasi ; bapotaki mbangu mpo na kokende kopesa sango epai ya bayekoli na Ye.
BSB
BSB:
So they hurried away from the tomb in fear and great joy, and ran to tell His disciples.
9
LIN
Mbala moko, Yesu akutanaki na bango mpe alobaki : — Mbote na bino ! Bapusanaki pene na Ye, basimbaki makolo na Ye mpe bagumbamelaki Ye.
BSB
BSB:
Suddenly Jesus met them and said,
“Greetings!”
They came to Him, grasped His feet, and worshiped Him.
10
LIN
Yesu alobaki na bango : — Bobanga te ! Bokende koyebisa bandeko na Ngai ete bakende na Galile ; ezali kuna nde bakomona Ngai.
BSB
BSB:
“Do not be afraid,”
said Jesus.
“Go and tell My brothers to go to Galilee. There they will see Me.”
11
LIN
Wana basi bazalaki kokende, ndambo ya bakengeli bazongaki kati na engumba mpo na koyebisa na bakonzi ya Banganga-Nzambe, makambo nyonso oyo ewutaki koleka.
BSB
BSB:
While the women were on their way, some of the guards went into the city and reported to the chief priests all that had happened.
12
LIN
Bakonzi ya Banganga-Nzambe babengaki bakambi ya bato mpe, elongo na bango, basalaki mwango moko, bapesaki mbongo ebele epai ya basoda
BSB
BSB:
And after the chief priests had met with the elders and formed a plan, they gave the soldiers a large sum of money
13
LIN
mpe balobaki na bango : « Tala ndenge bosengeli koloba : ‹ Wana tozalaki kati na pongi, bayekoli na ye bayaki koyiba nzoto na ye, na butu. ›
BSB
BSB:
and instructed them: “You are to say, ‘His disciples came by night and stole Him away while we were asleep.’
14
LIN
Soki likambo yango ekomi na matoyi ya moyangeli, tokoyeba kosolola na ye mpe kosala nyonso mpo ete bomema ngambo te. »
BSB
BSB:
If this report reaches the governor, we will satisfy him and keep you out of trouble.”
15
LIN
Basoda bazwaki mbongo mpe basalaki ndenge kaka batindaki bango. Lisolo yango epanzanaki kati na Bayuda mpe ezali kolobama kino na mokolo ya lelo.
BSB
BSB:
So the guards took the money and did as they were instructed. And this account has been circulated among the Jews to this very day.
16
LIN
Bayekoli zomi na moko bakendeki na Galile, na ngomba oyo Yesu ayebisaki bango ete bakende.
BSB
BSB:
Meanwhile, the eleven disciples went to Galilee, to the mountain Jesus had designated.
17
LIN
Tango bamonaki Ye, bagumbamelaki Ye ; kasi bamosusu kati na bango bandimaki te.
BSB
BSB:
When they saw Him, they worshiped Him, but some doubted.
18
LIN
Yesu apusanaki pene na bango mpe alobaki : — Bokonzi nyonso epesameli Ngai, ezala kati na Likolo to na mokili.
BSB
BSB:
Then Jesus came to them and said,
“All authority in heaven and on earth has been given to Me.
19
LIN
Bokende, bokomisa bato ya bikolo nyonso bayekoli na Ngai, bobatisa bango na Kombo ya Tata, ya Mwana mpe ya Molimo Mosantu ;
BSB
BSB:
Therefore go and make disciples of all nations, baptizing them in the name of the Father and of the Son and of the Holy Spirit,
20
LIN
bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.
BSB
BSB:
and teaching them to obey all that I have commanded you. And surely I am with you always, even to the end of the age.”
Chapter complete
You’ve read Matthew 28
Chapter 28 of 28 in Matthew
Up next
Mark 1
Read Mark 1
Listen
Back to Matthew 27
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Matthew 28
A question this chapter raises
Isn’t the Bible full of contradictions?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Matthew 27
Matthew 28
Mark 1