Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.37.2
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Matt
Matthew
5
LIN
BSB
A
a
Matthew 5
5
Matthew
The Sermon on the Mount
Lingala Bible
Jerusalem
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Tango Yesu amonaki ebele yango ya bato, amataki likolo ya ngomba mpe avandaki. Bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye,
BSB
BSB:
When Jesus saw the crowds, He went up on the mountain and sat down. His disciples came to Him,
2
LIN
mpe akomaki kopesa bango malakisi. Alobaki :
BSB
BSB:
and He began to teach them, saying:
3
LIN
« Esengo na babola na molimo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango !
BSB
BSB:
“Blessed are the poor in spirit, for theirs is the kingdom of heaven.
4
LIN
Esengo na bato oyo bazali kolela, pamba te bakobondisama !
BSB
BSB:
Blessed are those who mourn, for they will be comforted.
5
LIN
Esengo na bato na komikitisa, pamba te bakozwa mokili lokola libula !
BSB
BSB:
Blessed are the meek, for they will inherit the earth.
6
LIN
Esengo na bato oyo bazali na nzala mpe na posa ya bosembo, pamba te bakotondisama !
BSB
BSB:
Blessed are those who hunger and thirst for righteousness, for they will be filled.
7
LIN
Esengo na bato oyo bayokelaka bato mosusu mawa, pamba te bakoyokela bango mpe mawa !
BSB
BSB:
Blessed are the merciful, for they will be shown mercy.
8
LIN
Esengo na bato oyo bazali na mitema peto, pamba te bakomona Nzambe !
BSB
BSB:
Blessed are the pure in heart, for they will see God.
9
LIN
Esengo na bato oyo bayeisaka kimia, pamba te bakobengama bana na Nzambe !
BSB
BSB:
Blessed are the peacemakers, for they will be called sons of God.
10
LIN
Esengo na bato oyo bazali konyokolama likolo ya bosembo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango !
BSB
BSB:
Blessed are those who are persecuted because of righteousness, for theirs is the kingdom of heaven.
11
LIN
Esengo na bino tango bazali kofinga bino, tango bazali konyokola bino, mpe tango bazali kokosela bino makambo ya lolenge nyonso likolo na Ngai !
BSB
BSB:
Blessed are you when people insult you, persecute you, and falsely say all kinds of evil against you because of Me.
12
LIN
Bosepela mpe bozala na esengo, pamba te lifuti na bino ezali monene kati na Likolo ; pamba te ezalaki mpe kaka ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.
BSB
BSB:
Rejoice and be glad, because great is your reward in heaven, for in the same way they persecuted the prophets before you.
13
LIN
Bozali mungwa ya mokili. Kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bakokoka lisusu kozongisa elengi na yango ? Ezali lisusu na tina moko te ; etikali kaka eloko ya kobwaka mpe ya konyata.
BSB
BSB:
You are the salt of the earth. But if the salt loses its savor, how can it be made salty again? It is no longer good for anything, except to be thrown out and trampled by men.
14
LIN
Bozali pole ya mokili. Engumba oyo batongi na likolo ya ngomba ekoki kobombama te.
BSB
BSB:
You are the light of the world. A city on a hill cannot be hidden.
15
LIN
Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na se ya katini ; nzokande, atiaka yango na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete engengisa bato nyonso oyo bazali kati na ndako.
BSB
BSB:
Neither do people light a lamp and put it under a basket. Instead, they set it on a stand, and it gives light to everyone in the house.
16
LIN
Yango wana, tika ete pole na bino engenga liboso ya bato, mpo ete bamona misala malamu na bino mpe bakumisa Tata na bino oyo azali kati na Likolo.
BSB
BSB:
In the same way, let your light shine before men, that they may see your good deeds and glorify your Father in heaven.
17
LIN
Bokanisa te ete Ngai nayaki mpo na kolongola Mobeko to basakoli ; solo, nayaki te mpo na kolongola, kasi nayaki nde mpo na kokokisa.
BSB
BSB:
Do not think that I have come to abolish the Law or the Prophets. I have not come to abolish them, but to fulfill them.
18
LIN
Pamba te, nazali koloba na bino penza ya solo : liboso ete Likolo mpe mabele elimwa, nkoma moko te oyo eleki moke to litono oyo ezalaka na likolo ya i ekotikala kolongwa kati na Mobeko, kino makambo nyonso ekokisama.
BSB
BSB:
For I tell you truly, until heaven and earth pass away, not a single jot, not a stroke of a pen, will disappear from the Law until everything is accomplished.
19
LIN
Yango wana, moto nyonso oyo akobuka moko kati na mibeko oyo, ezala oyo eleki moke kati na yango, mpe akoteya bato mosusu kosala bongo, bakozwa ye lokola moto pamba kati na Bokonzi ya Likolo. Kasi moto oyo akotosa mpe akoteya mibeko oyo epai na bato mosusu akozala moto monene kati na Bokonzi ya Likolo.
BSB
BSB:
So then, whoever breaks one of the least of these commandments and teaches others to do likewise will be called least in the kingdom of heaven; but whoever practices and teaches them will be called great in the kingdom of heaven.
20
LIN
Pamba te, nazali koloba na bino solo ete soki bosembo na bino liboso ya Mobeko eleki te bosembo ya balakisi ya Mobeko mpe ya Bafarizeo, bokokota te na Bokonzi ya Likolo.
BSB
BSB:
For I tell you that unless your righteousness exceeds that of the scribes and Pharisees, you will never enter the kingdom of heaven.
21
LIN
Boyokaki ete baloba na bakoko na biso : ‹ Okobomaka te. Moto nyonso oyo akoboma moninga na ye asengeli na kosambisama liboso ya basambisi. ›
BSB
BSB:
You have heard that it was said to the ancients, ‘Do not murder’ and ‘Anyone who murders will be subject to judgment.’
22
LIN
Kasi Ngai, nalobi na bino : Moto nyonso oyo akokangela ndeko na ye kanda akosamba na esambiselo liboso ya basambisi ; moto oyo akofinga ndeko na ye : ‹ zoba, › akosamba liboso ya Likita-Monene ; mpe oyo akoloba na ndeko na ye : ‹ moto ya liboma, › akobwakama kati na moto ya lifelo.
BSB
BSB:
But I tell you that anyone who is angry with his brother will be subject to judgment. Again, anyone who says to his brother, ‘Raca,’ will be subject to the Sanhedrin. But anyone who says, ‘You fool!’ will be subject to the fire of hell.
23
LIN
Soki ozali kokende kopesa makabo na yo liboso ya etumbelo, mpe ososoli ete ndeko na yo azwa yo na likambo,
BSB
BSB:
So if you are offering your gift at the altar and there remember that your brother has something against you,
24
LIN
tika makabo na yo liboso ya etumbelo mpe kende nanu koyokana na ndeko na yo wana ; sima na yango nde okoya kopesa makabo na yo.
BSB
BSB:
leave your gift there before the altar. First go and be reconciled to your brother; then come and offer your gift.
25
LIN
Soki moto azwi yo na likambo, yokana na ye noki, wana bozali nanu na nzela ; soki te, akofunda yo epai ya mosambisi, mosambisi akokaba yo na maboko ya bakengeli, mpe bakengeli bakobwaka yo na boloko.
BSB
BSB:
Reconcile quickly with your adversary, while you are still on the way to court. Otherwise, he may hand you over to the judge, and the judge may hand you over to the officer, and you may be thrown into prison.
26
LIN
Nazali koloba na yo penza ya solo : okobima na boloko soki kaka ofuti niongo na yo nyonso.
BSB
BSB:
Truly I tell you, you will not get out until you have paid the last penny.
27
LIN
Boyokaki ete baloba : ‹ Okosalaka ekobo te. ›
BSB
BSB:
You have heard that it was said, ‘Do not commit adultery.’
28
LIN
Kasi Ngai, nalobi na bino : Mobali nyonso oyo atali mwasi na makanisi ya kolula ye, asili kosala na ye ekobo kati na motema na ye.
BSB
BSB:
But I tell you that anyone who looks at a woman to lust after her has already committed adultery with her in his heart.
29
LIN
Yango wana, soki liso na yo ya ngambo ya mobali ekweyisaka yo na masumu, longola yango mpe bwaka yango mosika na yo ; pamba te eleki malamu mpo na yo kobungisa eteni moko ya nzoto, na esika ete nzoto na yo mobimba ebwakama na lifelo.
BSB
BSB:
If your right eye causes you to sin, gouge it out and throw it away. It is better for you to lose one part of your body than for your whole body to be thrown into hell.
30
LIN
Soki mpe loboko na yo ya ngambo ya mobali ekweyisaka yo na masumu, kata yango mpe bwaka yango mosika na yo ; pamba te eleki malamu mpo na yo kobungisa eteni moko ya nzoto, na esika ete nzoto na yo mobimba ekende na lifelo.
BSB
BSB:
And if your right hand causes you to sin, cut it off and throw it away. It is better for you to lose one part of your body than for your whole body to depart into hell.
31
LIN
Boyokaki lisusu ete baloba : ‹ Soki mobali akabwani na mwasi na ye, asengeli kopesa ye mokanda ya koboma libala. ›
BSB
BSB:
It has also been said, ‘Whoever divorces his wife must give her a certificate of divorce.’
32
LIN
Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Mobali nyonso oyo alongoli mwasi na ye na libala, longola kaka soki mwasi yango akweyaki na ekobo, afungoleli ye nzela ya kosala kindumba ; mpe mobali oyo abali mwasi oyo balongola na libala asali mpe ekobo.
BSB
BSB:
But I tell you that anyone who divorces his wife, except for sexual immorality, brings adultery upon her. And he who marries a divorced woman commits adultery.
33
LIN
Boyokaki lisusu ete baloba na bakoko na biso : ‹ Okolapa ndayi ya lokuta te, kasi kokisa bilaka oyo opesaki na nzela ya ndayi liboso ya Nkolo. ›
BSB
BSB:
Again, you have heard that it was said to the ancients, ‘Do not break your oath, but fulfill your vows to the Lord.’
34
LIN
Kasi Ngai, nazali koloba na bino : bolapaka ndayi te, ezala na kombo ya Likolo, pamba te Likolo ezali Kiti ya Bokonzi ya Nzambe,
BSB
BSB:
But I tell you not to swear at all: either by heaven, for it is God’s throne;
35
LIN
to na kombo ya mokili, pamba te mokili ezali enyatelo makolo ya Nzambe ; to mpe na kombo ya Yelusalemi, pamba te Yelusalemi ezali engumba ya Mokonzi Monene.
BSB
BSB:
or by the earth, for it is His footstool; or by Jerusalem, for it is the city of the great King.
36
LIN
Bosalelaka mpe te mito na bino mpo na kolapa ndayi, pamba te bokoki te kokomisa moko kati na suki ya mito na bino pembe to mwindo.
BSB
BSB:
Nor should you swear by your head, for you cannot make a single hair white or black.
37
LIN
Kasi bolobaka kaka ‹ iyo › soki ezali iyo, mpe ‹ te › soki ezali bongo, pamba te maloba nyonso oyo ebakisamaka likolo ewutaka na Mokosi.
BSB
BSB:
Simply let your ‘Yes’ be ‘Yes,’ and your ‘No,’ ‘No.’ Anything more comes from the evil one.
38
LIN
Boyokaki ete baloba : ‹ Liso mpo na liso, linu mpo na linu. ›
BSB
BSB:
You have heard that it was said, ‘Eye for eye and tooth for tooth.’
39
LIN
Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Botelemelaka te moto mabe ; kutu soki abeti yo mbata na litama ya ngambo ya loboko ya mobali, pesa ye mpe litama ya ngambo ya loboko ya mwasi.
BSB
BSB:
But I tell you not to resist an evil person. If someone slaps you on your right cheek, turn to him the other also;
40
LIN
Soki moto alingi kofunda yo mpo na kozwa elamba na yo, pesa ye mpe kazaka na yo.
BSB
BSB:
if someone wants to sue you and take your tunic, let him have your cloak as well;
41
LIN
Soki moto atindi yo na makasi ete otambola kilometele moko, yo, tambola bakilometele mibale elongo na ye.
BSB
BSB:
and if someone forces you to go one mile, go with him two miles.
42
LIN
Pesa na moto oyo asengi yo, mpe koboya te kodefisa na moto oyo alingi kodefa epai na yo.
BSB
BSB:
Give to the one who asks you, and do not turn away from the one who wants to borrow from you.
43
LIN
Boyokaki ete baloba : ‹ Linga moninga na yo mpe yina monguna na yo. ›
BSB
BSB:
You have heard that it was said, ‘Love your neighbor’ and ‘Hate your enemy.’
44
LIN
Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Bolingaka banguna na bino mpe bosambelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino.
BSB
BSB:
But I tell you, love your enemies and pray for those who persecute you,
45
LIN
Na ndenge wana nde bokozala bana ya Tata na bino, oyo azali kati na Likolo, pamba te abimisaka moyi mpo na bato malamu mpe mpo na bato mabe, mpe anokisaka mvula mpo na bato ya sembo mpe mpo na bato oyo bazali sembo te.
BSB
BSB:
that you may be sons of your Father in heaven. He causes His sun to rise on the evil and the good, and sends rain on the righteous and the unrighteous.
46
LIN
Soki bolingaka kaka bato oyo balingaka bino, lifuti nini bokozwa ? Boni, bafutisi mpako basalaka mpe bongo te ?
BSB
BSB:
If you love those who love you, what reward will you get? Do not even tax collectors do the same?
47
LIN
Soki bopesaka mbote kaka na bandeko mibali na bino, likambo nini ya kokamwa oyo bosalaka ? Boni, bapagano basalaka mpe bongo te ?
BSB
BSB:
And if you greet only your brothers, what are you doing more than others? Do not even Gentiles do the same?
48
LIN
Bozala bato ya kokoka ndenge Tata na bino ya Likolo azali ya kokoka.
BSB
BSB:
Be perfect, therefore, as your heavenly Father is perfect.
Chapter complete
You’ve read Matthew 5
Chapter 5 of 28 in Matthew
Up next
Matthew 6
Read Matthew 6
Listen
Back to Matthew 4
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Matthew 5
A question this chapter raises
What about the Crusades?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Matthew 4
Matthew 5
Matthew 6