Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.37.4
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Matt
Matthew
6
LIN
BSB
A
a
Matthew 6
6
Matthew
The Sermon on the Mount
Lingala Bible
Solomon
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Bosala keba ete bosalelaka te bosembo na bino liboso ya bato, mpo ete bamona bino ; soki te, bokozanga lifuti oyo Tata na bino ya Likolo abombela bino.
BSB
BSB:
“Be careful not to perform your righteous acts before men to be seen by them. If you do, you will have no reward from your Father in heaven.
2
LIN
Tango ozali kokabela babola, kobetela yango tangwa te ndenge bato ya bilongi mibale basalaka kati na bandako ya mayangani mpe na babalabala mpo ete bato bakumisa bango. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango.
BSB
BSB:
So when you give to the needy, do not sound a trumpet before you, as the hypocrites do in the synagogues and on the streets, to be honored by men. Truly I tell you, they already have their full reward.
3
LIN
Kasi tango yo ozali kokabela babola, sala yango na ndenge ete loboko na yo ya mwasi eyeba ete likambo oyo loboko na yo ya mobali ezali kosala,
BSB
BSB:
But when you give to the needy, do not let your left hand know what your right hand is doing,
4
LIN
mpo ete likabo na yo ya mawa etikala sekele ; bongo Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.
BSB
BSB:
so that your giving may be in secret. And your Father, who sees what is done in secret, will reward you.
5
LIN
Tango bozali kosambela, bosalaka te lokola bato ya bilongi mibale oyo balingaka kosambela ya kotelema kati na bandako ya mayangani mpe na bisika oyo babalabala ekutana, mpo ete bato bamona bango. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango.
BSB
BSB:
And when you pray, do not be like the hypocrites. For they love to pray standing in the synagogues and on the street corners to be seen by men. Truly I tell you, they already have their full reward.
6
LIN
Kasi yo, soki olingi kosambela, kota na shambre na yo, kanga ekuke mpe sambela Tata na yo, oyo azali kati na esika wana ya sekele ; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.
BSB
BSB:
But when you pray, go into your inner room, shut your door, and pray to your Father, who is unseen. And your Father, who sees what is done in secret, will reward you.
7
LIN
Tango bozali kosambela, bozongelaka-zongelaka te maloba ndenge bapagano basalaka ; pamba te bakanisaka ete Nzambe akoyanola bango soki balobi mingi.
BSB
BSB:
And when you pray, do not babble on like pagans, for they think that by their many words they will be heard.
8
LIN
Bosalaka lokola bango te, pamba te Tata na bino ayebi posa na bino liboso ete botalisa Ye yango.
BSB
BSB:
Do not be like them, for your Father knows what you need before you ask Him.
9
LIN
Tala ndenge nini bosengeli kosambela : ‹ Tata na biso, Yo oyo ozali kati na Likolo ; tika ete Kombo na Yo ebulisama,
BSB
BSB:
So then, this is how you should pray: ‘Our Father in heaven, hallowed be Your name.
10
LIN
tika ete Bokonzi na Yo eya, tika ete mokano na Yo esalema, awa na mokili ndenge esalemaka kuna na Likolo !
BSB
BSB:
Your kingdom come, Your will be done, on earth as it is in heaven.
11
LIN
Pesa biso, na mokolo ya lelo, bilei na biso ya mokolo na mokolo ;
BSB
BSB:
Give us this day our daily bread.
12
LIN
limbisa mabe na biso, ndenge biso mpe tolimbisi bato oyo basalaki biso mabe ;
BSB
BSB:
And forgive us our debts, as we also have forgiven our debtors.
The ending of the Lord’s Prayer
13
LIN
komema biso na komekama te, kasi kangola biso longwa na misala ya Satana ;
pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo ezali ya Yo seko na seko.
›
BSB
BSB:
And lead us not into temptation, but deliver us from the evil one.’
14
LIN
Pamba te soki bolimbisi baninga, na mabe oyo basali bino, Tata na bino ya Likolo mpe akolimbisa bino ;
BSB
BSB:
For if you forgive men their trespasses, your heavenly Father will also forgive you.
15
LIN
kasi soki bolimbisi te, Tata na bino mpe akolimbisa te mabe na bino.
BSB
BSB:
But if you do not forgive men their trespasses, neither will your Father forgive yours.
16
LIN
Tango bozali kokila bilei, bozalaka mawa-mawa te ndenge bato ya bilongi mibale basalaka ; pamba te bakomisaka bilongi na bango mawa-mawa mpo na kolakisa na bato ete bazali kokila bilei. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango.
BSB
BSB:
When you fast, do not be somber like the hypocrites, for they disfigure their faces to show men they are fasting. Truly I tell you, they already have their full reward.
17
LIN
Kasi tango yo ozali kokila bilei, sukola elongi na yo malamu mpe pakola moto na yo malasi,
BSB
BSB:
But when you fast, anoint your head and wash your face,
18
LIN
mpo ete moto moko te ayeba ete ozali kokila bilei, longola kaka Tata na yo, oyo amonanaka te ; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku akopesa yo lifuti.
BSB
BSB:
so that your fasting will not be obvious to men, but only to your Father, who is unseen. And your Father, who sees what is done in secret, will reward you.
19
LIN
Bonduka bomengo te awa na mokili, pamba te ekoki kobeba to nselele ekoki kolia yango to mpe miyibi bakoki kobuka ndako mpo na koyiba yango.
BSB
BSB:
Do not store up for yourselves treasures on earth, where moth and rust destroy, and where thieves break in and steal.
20
LIN
Kasi bonduka bomengo na bino kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te to nselele ekoki kolia yango te to mpe miyibi bakoki kobuka ndako te mpo na koyiba yango ;
BSB
BSB:
But store up for yourselves treasures in heaven, where moth and rust do not destroy, and where thieves do not break in and steal.
21
LIN
pamba te epai bomengo na yo ezali, kuna mpe motema na yo ekozala.
BSB
BSB:
For where your treasure is, there your heart will be also.
22
LIN
Miso ezali lokola mwinda ya nzoto. Soki miso na yo ezali malamu, nzoto na yo mobimba mpe ekozala kati na pole.
BSB
BSB:
The eye is the lamp of the body. If your eyes are good, your whole body will be full of light.
23
LIN
Kasi soki miso na yo ekufi, nzoto na yo mobimba mpe ekozala kati na molili. Bongo soki pole oyo ezali kati na yo ekomi molili, molili yango ekozala makasi penza.
BSB
BSB:
But if your eyes are bad, your whole body will be full of darkness. If then the light within you is darkness, how great is that darkness!
24
LIN
Moto moko te akoki kosalela bankolo mibale, pamba te akoyina moko mpe akolinga mosusu to akokangama na moko mpe akoboya mosusu. Bokoki te kosalela Nzambe mpe mbongo nzela moko.
BSB
BSB:
No one can serve two masters: Either he will hate the one and love the other, or he will be devoted to the one and despise the other. You cannot serve both God and money.
25
LIN
Yango wana, nazali koloba na bino : bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna : tokolia nini to tokomela nini ? To na tina na banzoto na bino, na komituna : Tokolata nini ? Boni, bomoi eleki bilei te na tina, mpe nzoto eleki bilamba te na tina ?
BSB
BSB:
Therefore I tell you, do not worry about your life, what you will eat or drink; or about your body, what you will wear. Is not life more than food, and the body more than clothes?
26
LIN
Botala ndeke ya likolo : elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ebombaka bilei te kati na bibombelo ; kasi Tata na bino ya Likolo aleisaka yango. Boni, bozali na motuya te koleka yango ?
BSB
BSB:
Look at the birds of the air: They do not sow or reap or gather into barns, and yet your heavenly Father feeds them. Are you not much more valuable than they?
27
LIN
Nani kati na bino, na nzela ya mitungisi na ye, akoki kobakisa ata ngonga moko na molayi ya bomoi na ye ?
BSB
BSB:
Who of you by worrying can add a single hour to his life?
28
LIN
Bongo mpo na nini bomitungisaka mpo na bilamba ya kolata ? Botala bafololo ya bilanga ndenge ekolaka ! Esalaka te mpe etongaka bilamba te ;
BSB
BSB:
And why do you worry about clothes? Consider how the lilies of the field grow: They do not labor or spin.
29
LIN
nzokande, nazali koloba na bino ya solo ete ata Salomo, kati na nkembo na ye nyonso, atikalaki kolata te lokola moko kati na yango.
BSB
BSB:
Yet I tell you that not even Solomon in all his glory was adorned like one of these.
30
LIN
Soki Nzambe alatisaka ndenge wana matiti ya bilanga, oyo, na mokolo ya lelo, ezali na bomoi mpe, lobi, ekobwakama na moto, ekozala ndenge nini mpo na bino ? Akolatisa bino te na ndenge ya kitoko koleka ? Bato ya kondima moke !
BSB
BSB:
If that is how God clothes the grass of the field, which is here today and tomorrow is thrown into the furnace, will He not much more clothe you, O you of little faith?
31
LIN
Yango wana, bomitungisaka te na koloba : ‹ Tokolia nini ? Tokomela nini ? Tokolata nini ? ›
BSB
BSB:
Therefore do not worry, saying, ‘What shall we eat?’ or ‘What shall we drink?’ or ‘What shall we wear?’
32
LIN
Biloko wana nyonso, ezali bapagano nde balukaka-lukaka yango ; kasi mpo na bino, Tata na bino ya Likolo ayebi malamu ete bozali na bosenga na yango.
BSB
BSB:
For the Gentiles strive after all these things, and your heavenly Father knows that you need them.
33
LIN
Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na Ye, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.
BSB
BSB:
But seek first the kingdom of God and His righteousness, and all these things will be added unto you.
34
LIN
Yango wana, bomitungisaka te mpo na mokolo ya lobi oyo ezali koya, pamba te mokolo yango ya lobi ekomitungisa na tina na yango moko : mokolo na mokolo ezali na pasi oyo ekoki na yango.
BSB
BSB:
Therefore do not worry about tomorrow, for tomorrow will worry about itself. Today has enough trouble of its own.
Chapter complete
You’ve read Matthew 6
Chapter 6 of 28 in Matthew
Up next
Matthew 7
Read Matthew 7
Listen
Back to Matthew 5
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Matthew 6
A question this chapter raises
Hasn’t evolution explained away design?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Matthew 5
Matthew 6
Matthew 7