Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.38.0
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Matt
Matthew
8
LIN
BSB
A
a
Matthew 8
8
Matthew
Ministry in Galilee: words and deeds
Lingala Bible
Jesus
, person
Israel
, person
Moses
, person
Abraham
, person
Peter
, person
Isaac
, person
Isaiah
, person
Capernaum
, place
3 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Tango Yesu akitaki na ngomba, bato ebele penza balandaki Ye.
BSB
BSB:
When Jesus came down from the mountain, large crowds followed Him.
2
LIN
Moto moko na maba ayaki, agumbamaki liboso na Ye mpe alobaki : — Nkolo, soki olingi, komisa ngai peto.
BSB
BSB:
Suddenly a leper came and knelt before Him, saying, “Lord, if You are willing, You can make me clean.”
3
LIN
Yesu asembolaki loboko, asimbaki ye mpe alobaki : — Nalingi ete ezala bongo, koma peto. Mbala moko, apetolamaki na maba na ye ;
BSB
BSB:
Jesus reached out His hand and touched the man.
“I am willing,”
He said.
“Be clean!”
And immediately his leprosy was cleansed.
4
LIN
mpe Yesu alobaki na ye : — Yoka malamu ! Koyebisa likambo oyo na moto te, kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe pesa likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko mpo ete ezala litatoli na miso na bango ete obiki.
BSB
BSB:
Then Jesus instructed him,
“See that you don’t tell anyone. But go, show yourself to the priest and offer the gift prescribed by Moses, as a testimony to them.”
5
LIN
Tango Yesu akotaki na Kapernawumi, mokonzi moko ya basoda ayaki epai na Ye mpe asengaki Ye lisungi.
BSB
BSB:
When Jesus had entered Capernaum, a centurion came and pleaded with Him,
6
LIN
Alobaki : — Nkolo, mosali na ngai alali na ndako, azali kokoka kotambola te mpe azali kobela makasi.
BSB
BSB:
“Lord, my servant lies at home, paralyzed and in terrible agony.”
7
LIN
Yesu azongiselaki ye : — Nakoya kobikisa ye.
BSB
BSB:
“I will go and heal him,”
Jesus replied.
8
LIN
Mokonzi ya basoda alobaki : — Nkolo, nazali ya kokoka te mpo ete okota na ndako na ngai ! Loba kaka liloba moko, mpe mosali na ngai akobika na bokono na ye.
BSB
BSB:
The centurion answered, “Lord, I am not worthy to have You come under my roof. But just say the word, and my servant will be healed.
9
LIN
Pamba te ngai moko mpe nazali na se ya bakonzi oyo baleki ngai, mpe ezali na basoda oyo bazali na se ya bokonzi na ngai ; soki nalobi na moko : « Kende ! » akendaka ; mpe soki nalobi na mosusu : « Yaka ! » ayaka ; bongo soki nalobi na mowumbu na ngai : « Sala mosala oyo ! » asalaka yango.
BSB
BSB:
For I myself am a man under authority, with soldiers under me. I tell one to go, and he goes, and another to come, and he comes. I tell my servant to do something, and he does it.”
10
LIN
Tango Yesu ayokaki maloba oyo, akamwaki mingi mpe alobaki na bato oyo bazalaki kolanda Ye : — Nazali koloba na bino penza ya solo : natikali nanu komona te kondima ya boye kati na Isalaele !
BSB
BSB:
When Jesus heard this, He marveled and said to those following Him,
“Truly I tell you, I have not found anyone in Israel with such great faith.
11
LIN
Lisusu, nazali koloba na bino solo ete bato ebele bakowuta na Este mpe na Weste, mpe bakovanda na mesa elongo na Abrayami, Izaki mpe Jakobi kati na Bokonzi ya Likolo.
BSB
BSB:
I say to you that many will come from the east and the west to share the banquet with Abraham, Isaac, and Jacob in the kingdom of heaven.
12
LIN
Kasi bato oyo basengelaki kokitana na bokonzi bakobwakama kati na molili ya libanda epai wapi bakolela mpe bakoswa minu.
BSB
BSB:
But the sons of the kingdom will be thrown into the outer darkness, where there will be weeping and gnashing of teeth.”
13
LIN
Bongo Yesu alobaki na mokonzi ya basoda : — Zonga na ndako na yo ! Tika ete esalemela yo kolanda kondima na yo ! Mpe kaka na tango yango, mosali abikaki.
BSB
BSB:
Then Jesus said to the centurion,
“Go! As you have believed, so will it be done for you.”
And his servant was healed at that very hour.
14
LIN
Tango Yesu akomaki na ndako ya Petelo, akutaki mama-bokilo ya Petelo alala mpo ete azalaki kobela fievele.
BSB
BSB:
When Jesus arrived at Peter’s house, He saw Peter’s mother-in-law sick in bed with a fever.
15
LIN
Yesu asimbaki ye na loboko, mpe fievele esilaki ; bongo atelemaki mpe akomaki kobongisela Yesu bilei.
BSB
BSB:
So He touched her hand, and the fever left her, and she got up and began to serve Him.
16
LIN
Tango pokwa ekomaki, bamemelaki Yesu bato ebele oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. Kaka na liloba moko, Yesu abenganaki milimo mabe yango ; abikisaki mpe babeli nyonso.
BSB
BSB:
When evening came, many who were demon-possessed were brought to Jesus, and He drove out the spirits with a word and healed all the sick.
17
LIN
Na bongo nde ekokisamaki liloba oyo mosakoli Ezayi alobaki : « Amemaki mokumba ya pasi na biso mpe abikisaki biso na bokono na biso. »
BSB
BSB:
This was to fulfill what was spoken through the prophet Isaiah: “He took up our infirmities and carried our diseases.”
18
LIN
Tango Yesu amonaki ete bato ebele bazingeli Ye, apesaki mitindo epai ya bayekoli na Ye ete bakatisa na ngambo mosusu ya ebale.
BSB
BSB:
When Jesus saw a large crowd around Him, He gave orders to cross to the other side of the sea.
19
LIN
Molakisi moko ya mibeko apusanaki pene ya Yesu mpe alobaki : — Moteyi, nakolanda Yo na esika nyonso oyo okokende.
BSB
BSB:
And one of the scribes came to Him and said, “Teacher, I will follow You wherever You go.”
20
LIN
Kasi Yesu alobaki na ye : — Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango ; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.
BSB
BSB:
Jesus replied,
“Foxes have dens and birds of the air have nests, but the Son of Man has no place to lay His head.”
21
LIN
Moto mosusu oyo azalaki moko kati na bayekoli ya Yesu alobaki na Ye : — Nkolo, pesa ngai nzela ete nakende nanu kokunda tata na ngai.
BSB
BSB:
Another of His disciples requested, “Lord, first let me go and bury my father.”
22
LIN
Kasi Yesu alobaki na ye : — Landa Ngai ! Tika bakufi bakunda bakufi na bango.
BSB
BSB:
But Jesus told him,
“Follow Me, and let the dead bury their own dead.”
23
LIN
Yesu amataki na bwato, mpe bayekoli na Ye balandaki Ye.
BSB
BSB:
When He got into the boat, His disciples followed Him.
24
LIN
Mbala moko, mopepe moko ya makasi ekomaki kopepa kati na ebale mpe mbonge ekomaki kozipa bwato. Kasi Yesu azalaki kolala pongi.
BSB
BSB:
Suddenly a violent storm came up on the sea, so that the boat was engulfed by the waves. But Jesus was sleeping.
25
LIN
Bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe balamusaki Ye na koganga : — Nkolo, bikisa biso ! Tozali kokufa !
BSB
BSB:
The disciples went and woke Him, saying, “Lord, save us! We are perishing!”
26
LIN
Kasi Yesu alobaki na bango : — Bato na kondima moke ! Mpo na nini bozali kobanga ? Bongo atelemaki, agangelaki mopepe mpe mbonge ; bongo kimia monene ezongaki.
BSB
BSB:
“You of little faith,”
Jesus replied,
“why are you so afraid?”
Then He got up and rebuked the winds and the sea, and it was perfectly calm.
27
LIN
Bato oyo bazalaki wana bakamwaki mpe bakomaki kolobana : « Moto oyo azali penza ndenge nini mpo ete ezala mopepe mpe ebale etosa ye ? »
BSB
BSB:
The men were amazed and asked, “What kind of man is this? Even the winds and the sea obey Him!”
28
LIN
Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, na etuka ya Gadara, bato mibale oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe babimaki wuta na bakunda mpe bayaki kokutana na Yesu ; bazalaki bato na kanza makasi, mpe bato bazalaki kobanga koleka na nzela wana.
BSB
BSB:
When Jesus arrived on the other side in the region of the Gadarenes, He was met by two demon-possessed men coming from the tombs. They were so violent that no one could pass that way.
29
LIN
Bakomaki koganga : — Mwana na Nzambe, biso na yo likambo nini ? Boni, oyei awa mpo na kotungisa biso liboso ya tango oyo ekatama ?
BSB
BSB:
“What do You want with us, Son of God?” they shouted. “Have You come here to torture us before the appointed time?”
30
LIN
Etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia mwa mosika ya esika oyo bazalaki.
BSB
BSB:
In the distance a large herd of pigs was feeding.
31
LIN
Milimo mabe esengaki na Yesu : — Soki okobengana biso, tinda biso kati na etonga wana ya bangulu.
BSB
BSB:
So the demons begged Jesus, “If You drive us out, send us into the herd of pigs.”
32
LIN
Yesu alobaki na milimo yango : — Bobima ! Milimo mabe ebimaki kati na bato wana mibale mpe ekotaki kati na bangulu. Mbala moko, etonga nyonso ya bangulu ekitaki mbangu wuta na likolo ya ngomba kino na ebale ; mpe yango nyonso ezindaki mpe ekufaki kati na mayi.
BSB
BSB:
“Go!”
He told them. So they came out and went into the pigs, and the whole herd rushed down the steep bank into the sea and died in the waters.
33
LIN
Bakengeli bangulu bakimaki, bakendeki kati na engumba kopesa sango ya makambo nyonso oyo ewutaki kosalema mpe ndenge nini bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe basilaki kokangolama.
BSB
BSB:
Those tending the pigs ran off into the town and reported all this, including the account of the demon-possessed men.
34
LIN
Bongo bato nyonso ya engumba babimaki mpo na kokutana na Yesu ; mpe tango bamonaki Ye, babondelaki Ye ete abima na etuka na bango.
BSB
BSB:
Then the whole town went out to meet Jesus. And when they saw Him, they begged Him to leave their region.
Chapter complete
You’ve read Matthew 8
Chapter 8 of 28 in Matthew
Up next
Matthew 9
Read Matthew 9
Listen
Back to Matthew 7
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Matthew 8
Ask Opened AI
Ask anything about Matthew 8
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Matthew 7
Matthew 8
Matthew 9