Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.39.1
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Matt
Matthew
9
LIN
BSB
A
a
Matthew 9
9
Matthew
Ministry in Galilee: words and deeds
Lingala Bible
Jesus
, person
Israel
, person
David
, person
John
, person
Matthew
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Yesu amataki na bwato, akatisaki ebale mpe akendeki na engumba na Ye.
BSB
BSB:
Jesus got into a boat, crossed over, and came to His own town.
2
LIN
Bamemelaki Ye ebosono moko alala na tsipoyi. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono yango : — Mwana na Ngai, yika mpiko ! Masumu na yo elimbisami.
BSB
BSB:
Just then some men brought to Him a paralytic lying on a mat. When Jesus saw their faith, He said to the paralytic,
“Take courage, son; your sins are forgiven.”
3
LIN
Mpo na yango, ndambo ya balakisi ya Mobeko bakomaki kolobaloba na se ya mitema : — Moto oyo azali kotiola Nzambe !
BSB
BSB:
On seeing this, some of the scribes said to themselves, “This man is blaspheming!”
4
LIN
Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, atunaki bango : — Mpo na nini bozali na makanisi mabe kati na mitema na bino ?
BSB
BSB:
But Jesus knew what they were thinking and said,
“Why do you harbor evil in your hearts?
5
LIN
Likambo nini eleki pete mpo na koloba : « Masumu na yo elimbisami to telema mpe tambola ? »
BSB
BSB:
Which is easier: to say, ‘Your sins are forgiven,’ or to say, ‘Get up and walk’?
6
LIN
Ezali mpo boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili. Bongo alobaki na ebosono : — Telema, kamata tsipoyi na yo mpe zonga na ndako na yo.
BSB
BSB:
But so that you may know that the Son of Man has authority on earth to forgive sins...”
Then He said to the paralytic,
“Get up, pick up your mat, and go home.”
7
LIN
Moto yango atelemaki mpe akendeki na ndako na ye.
BSB
BSB:
And the man got up and went home.
8
LIN
Tango ebele ya bato bamonaki bongo, batondaki na somo mpe bakomaki kokumisa Nzambe oyo apesi bokonzi ya ndenge wana epai ya bato.
BSB
BSB:
When the crowds saw this, they were filled with awe and glorified God, who had given such authority to men.
9
LIN
Wana Yesu alongwaki na esika yango mpe azalaki kokende, amonaki mobali moko avandi na ndako na ye ya mosala epai wapi bafutaka mpako ; kombo na ye ezalaki « Matayo. » Yesu alobaki na ye : « Landa Ngai. » Boye Matayo atelemaki mpe alandaki Yesu.
BSB
BSB:
As Jesus went on from there, He saw a man named Matthew sitting at the tax booth.
“Follow Me,”
He told him, and Matthew got up and followed Him.
10
LIN
Wana Yesu azalaki kolia kati na ndako ya Matayo, bafutisi mpako ebele mpe bato mosusu ya masumu bayaki mpe baliaki mesa moko na Yesu elongo na bayekoli na Ye.
BSB
BSB:
Later, as Jesus was dining at Matthew’s house, many tax collectors and sinners came and ate with Him and His disciples.
11
LIN
Tango Bafarizeo bamonaki bongo, batunaki bayekoli ya Yesu : — Mpo na nini moteyi na bino azali kolia mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ?
BSB
BSB:
When the Pharisees saw this, they asked His disciples, “Why does your Teacher eat with tax collectors and sinners?”
12
LIN
Kasi lokola Yesu ayokaki Bafarizeo koloba bongo, alobaki na bango : — Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te ; ezali babeli nde bazalaka na posa na ye.
BSB
BSB:
On hearing this, Jesus said,
“It is not the healthy who need a doctor, but the sick.
13
LIN
Bokende koyekola tina ya maloba oyo : « Nasepelaka na motema ya boboto koleka mbeka, » pamba te nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu.
BSB
BSB:
But go and learn what this means: ‘I desire mercy, not sacrifice.’ For I have not come to call the righteous, but sinners.”
14
LIN
Bongo bayekoli ya Yoane bayaki mpe batunaki Yesu : — Mpo na nini biso mpe Bafarizeo tokilaka bilei, kasi bayekoli na yo bakilaka bilei te ?
BSB
BSB:
Then John’s disciples came to Jesus and asked, “Why is it that we and the Pharisees fast so often, but Your disciples do not fast?”
15
LIN
Yesu azongiselaki bango : — Boni, bato oyo babengami na feti ya libala bakoki solo kozala na mawa, wana mobali ya libala azali elongo na bango ? Nzokande, tango ezali koya oyo bakolongola mobali ya libala kati na bango ; mpe ekozala na tango wana nde bakokila bilei.
BSB
BSB:
Jesus replied,
“How can the guests of the bridegroom mourn while He is with them? But the time will come when the bridegroom will be taken from them; then they will fast.
16
LIN
Moto moko te asalelaka eteni ya elamba ya sika mpo na kobamba elamba ya kala, noki te eteni ya elamba ya sika ekopasola elamba ya kala, mpe ekosala lidusu monene koleka.
BSB
BSB:
No one sews a patch of unshrunk cloth on an old garment. For the patch will pull away from the garment, and a worse tear will result.
17
LIN
Ezali mpe ndenge moko mpo na vino ya sika : batiaka yango te kati na bambeki ya kala, noki te bambeki ekopasuka, vino ekosopana mpe bambeki ekobeba libela. Nzokande, batiaka kaka vino ya sika kati na bambeki ya sika ; na bongo, vino mpe bambeki ekobatelama malamu.
BSB
BSB:
Neither do men pour new wine into old wineskins. If they do, the skins will burst, the wine will spill, and the wineskins will be ruined. Instead, they pour new wine into new wineskins, and both are preserved.”
18
LIN
Wana Yesu azalaki koloba na bango, mokambi moko ayaki ; agumbamaki liboso ya Yesu mpe alobaki na Ye : — Mwana na ngai ya mwasi akufi kaka sik’oyo ; yaka, tiela ye loboko, mpe akozonga lisusu na bomoi.
BSB
BSB:
While Jesus was saying these things, a synagogue leader came and knelt before Him. “My daughter has just died,” he said. “But come and place Your hand on her, and she will live.”
19
LIN
Yesu atelemaki mpe, elongo na bayekoli na Ye, alandaki mokambi yango.
BSB
BSB:
So Jesus got up and went with him, along with His disciples.
20
LIN
Na tango yango kaka, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale. Mwasi yango ayaki na sima ya Yesu mpe asimbaki singa ya songe ya elamba na Ye,
BSB
BSB:
Suddenly a woman who had suffered from bleeding for twelve years came up behind Him and touched the fringe of His cloak.
21
LIN
pamba te azalaki komilobela : — Soki kaka nasimbi elamba na Ye, nakobika na bokono na ngai.
BSB
BSB:
She said to herself, “If only I touch His cloak, I will be healed.”
22
LIN
Yesu atalaki na sima mpe amonaki ye ; alobaki : — Mwana na Ngai ya mwasi, yika mpiko ! Kondima na yo ebikisi yo. Mpe kaka na tango yango, mwasi yango abikaki na bokono na ye.
BSB
BSB:
Jesus turned and saw her.
“Take courage, daughter,”
He said,
“your faith has healed you.”
And the woman was healed from that very hour.
23
LIN
Tango Yesu akomaki na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani, amonaki babeti flite mpe bato ebele bazali kotia makelele.
BSB
BSB:
When Jesus entered the house of the synagogue leader, He saw the flute players and the noisy crowd.
24
LIN
Alobaki na bango : — Bobima ! Mwana akufi te ; alali nde pongi. Kasi bato bakomaki kotiola Ye.
BSB
BSB:
“Go away,”
He told them.
“The girl is not dead, but asleep.”
And they laughed at Him.
25
LIN
Mpe sima na bango kobima libanda, Yesu akotaki na shambre, asimbaki elenge mwasi na loboko, mpe elenge mwasi yango alamukaki.
BSB
BSB:
After the crowd had been put outside, Jesus went in and took the girl by the hand, and she got up.
26
LIN
Sango ya likambo yango epanzanaki na etuka wana mobimba.
BSB
BSB:
And the news about this spread throughout that region.
27
LIN
Tango Yesu alongwaki wana, bakufi miso mibale balandaki Ye na koganga : — Mwana ya Davidi, yokela biso mawa !
BSB
BSB:
As Jesus went on from there, two blind men followed Him, crying out, “Have mercy on us, Son of David!”
28
LIN
Tango Yesu akomaki na ndako, bakufi miso bapusanaki pene na Ye. Atunaki bango : — Bondimi ete nazali na makoki ya kosala oyo bozali kosenga Ngai ? Bazongisaki : — Iyo, Nkolo !
BSB
BSB:
After Jesus had entered the house, the blind men came to Him.
“Do you believe that I am able to do this?”
He asked. “Yes, Lord,” they answered.
29
LIN
Bongo asimbaki miso na bango mpe alobaki : — Tika ete esalemela bino kolanda kondima na bino !
BSB
BSB:
Then He touched their eyes and said,
“According to your faith will it be done to you.”
30
LIN
Mpe mbala moko, bakomaki komona. Bongo Yesu akebisaki bango : — Bosala keba ete moto moko te ayeba likambo oyo ekomeli bino.
BSB
BSB:
And their eyes were opened. Jesus warned them sternly,
“See that no one finds out about this!”
31
LIN
Kasi bango, tango kaka babimi, bakomaki kopanza sango na Ye kati na etuka wana mobimba.
BSB
BSB:
But they went out and spread the news about Him throughout the land.
32
LIN
Wana bato wana mibale bazalaki kobima, bamemelaki Yesu moto moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe mpe azalaki koloba te.
BSB
BSB:
As they were leaving, a demon-possessed man who was mute was brought to Jesus.
33
LIN
Yesu abenganaki molimo mabe yango, mpe moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba. Ebele ya bato bakamwaki mpe balobaki : — Kati na Isalaele, totikala nanu komona likambo ya boye te !
BSB
BSB:
And when the demon had been driven out, the man began to speak. The crowds were amazed and said, “Nothing like this has ever been seen in Israel!”
34
LIN
Kasi Bafarizeo bazalaki koloba : — Azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe.
BSB
BSB:
But the Pharisees said, “It is by the prince of demons that He drives out demons.”
35
LIN
Yesu azalaki kotambola na bamboka mpe na bingumba nyonso, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ; azalaki kobikisa bato na bokono mpe na pasi ya ndenge na ndenge.
BSB
BSB:
Jesus went through all the towns and villages, teaching in their synagogues, preaching the gospel of the kingdom, and healing every disease and sickness.
36
LIN
Tango Yesu amonaki ngulupa ebele ya bato, ayokelaki bango mawa, pamba te mitema na bango ebukanaki, mpe balembaki makasi lokola bameme oyo ezangi mobateli.
BSB
BSB:
When He saw the crowds, He was moved with compassion for them, because they were harassed and helpless, like sheep without a shepherd.
37
LIN
Yesu alobaki na bayekoli na Ye : « Elanga ezali monene, kasi basali bazali moke !
BSB
BSB:
Then He said to His disciples,
“The harvest is plentiful, but the workers are few.
38
LIN
Yango wana, bosenga na Nkolo elanga ete atinda basali kati na elanga na Ye. »
BSB
BSB:
Ask the Lord of the harvest, therefore, to send out workers into His harvest.”
Chapter complete
You’ve read Matthew 9
Chapter 9 of 28 in Matthew
Up next
Matthew 10
Read Matthew 10
Listen
Back to Matthew 8
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Matthew 9
Ask Opened AI
Ask anything about Matthew 9
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Matthew 8
Matthew 9
Matthew 10