Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.7
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Nah
Nahum
2
LIN
BSB
A
a
Nahum 2
2
Nahum
The fall of Nineveh
Lingala Bible
Israel
, person
Nineveh
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Tala, mobebisi azali koya kosala yo mabe ! Batela malamu bandako na yo batonga makasi, kengela nzela na yo, bongama mpo na bitumba mpe sangisa bato na yo.
BSB
BSB:
One who scatters advances against you, O Nineveh. Guard the fortress! Watch the road! Brace yourselves! Summon all your strength!
2
LIN
Yawe akozongisa lisusu nkembo ya Jakobi mpe ya Isalaele, atako babebisaki mpe bapanzaki mokili na bango, mpe atako babebisaki bilanga na bango ya vino.
BSB
BSB:
For the LORD will restore the splendor of Jacob like the splendor of Israel, though destroyers have laid them waste and ruined the branches of their vine.
3
LIN
Banguba mpe bilamba ya basoda na bango ezali ya langi ya motane ; bibende ya bashar na bango ezali kongenga na mokolo oyo babongisi mpo na bitumba, mpe makonga basala na nzete ekomi kotambola bipai na bipai.
BSB
BSB:
The shields of his mighty men are red; the valiant warriors are dressed in scarlet. The fittings of the chariots flash like fire on the day they are prepared, and the spears of cypress have been brandished.
4
LIN
Bashar ezali kokota na elulu na nzela, ezali kokende mpe kozonga na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; ezali komonana lokola koni oyo ezali kopela moto, ezali kotambola na bangambo nyonso lokola mikalikali.
BSB
BSB:
The chariots dash through the streets; they rush around the plazas, appearing like torches, darting about like lightning.
5
LIN
Abengi basoda na ye nyonso ya mpiko. nzokande, na nzela na bango, bazali kotepatepa, bazali kokende na lombangu pene ya mir.
BSB
BSB:
He summons his nobles; they stumble as they advance. They race to its wall; the protective shield is set in place.
6
LIN
Bikuke ya ebale efungwami, mpe ndako na ye ya bokonzi ebukani.
BSB
BSB:
The river gates are thrown open and the palace collapses.
7
LIN
Ekatami ete engumba wana ekokende na bowumbu mpe bakomema yango mosika penza ; basali na yango ya basi bakolela lokola bibenga mpe bakomibeta batolo likolo ya pasi.
BSB
BSB:
It is decreed that the city be exiled and carried away; her maidservants moan like doves, and beat upon their breasts.
8
LIN
Na kala, engumba Ninive ezalaki lokola liziba ya mayi. Kasi tala yango lelo oyo : etoboki mpe ekomi kobimisa mayi ! Bazali kobelela : « Botelema ! Botelema ! » Kasi ata moto moko te azongi lisusu kuna.
BSB
BSB:
Nineveh has been like a pool of water throughout her days, but now it is draining away. “Stop! Stop!” they cry, but no one turns back.
9
LIN
Bobotola wolo mpe palata na yango na makasi, pamba te bomengo na yango ezali penza mingi koleka mpe etonda na biloko ya motuya.
BSB
BSB:
“Plunder the silver! Plunder the gold!” There is no end to the treasure, an abundance of every precious thing.
10
LIN
Bakoteli yango, bapanzi yango, babotoli na makasi biloko na yango ya talo ! Mitema ebukani, mabolongo ekomi kolenga, mpe banzoto etondi na somo.
BSB
BSB:
She is emptied! Yes, she is desolate and laid waste! Hearts melt, knees knock, bodies tremble, and every face grows pale!
11
LIN
Wapi sik’oyo libulu epai wapi bankosi ezalaki kobokola bana na yango ? Wapi sik’oyo libulu epai wapi nkosi ya mwasi elongo na bana na yango ezalaki kotambola na somo ata moke te ?
BSB
BSB:
Where is the lions’ lair or the feeding ground of the young lions, where the lion and lioness prowled with their cubs, with nothing to frighten them away?
12
LIN
Nkosi ebomi banyama ebele mpo ete epesa yango lokola bilei epai ya bana na yango, ekangi nyama ya kolia mpo na mwasi na yango, bongo etondisi libulu na yango na banyama oyo ebomi mpe na misuni.
BSB
BSB:
The lion mauled enough for its cubs and strangled prey for the lioness. It filled its dens with the kill, and its lairs with mauled prey.
13
LIN
« Nakotombokela yo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ; « nakozikisa bashar na yo na moto, mpe mopanga ekoboma bana ya nkosi na yo. Nakobotola yo misuni nyonso awa na se ; boye mongongo ya batindami na yo ekotikala koyokana lisusu te. »
BSB
BSB:
“Behold, I am against you,” declares the LORD of Hosts. “I will reduce your chariots to cinders, and the sword will devour your young lions. I will cut off your prey from the earth, and the voices of your messengers will no longer be heard.”
Chapter complete
You’ve read Nahum 2
Chapter 2 of 3 in Nahum
Up next
Nahum 3
Read Nahum 3
Listen
Back to Nahum 1
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Nahum 2
Ask Study Help
Ask anything about Nahum 2
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Nahum 1
Nahum 2
Nahum 3