Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.7
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Nah
Nahum
3
LIN
BSB
A
a
Nahum 3
3
Nahum
The fall of Nineveh
Lingala Bible
Egypt
, place
Assyria
, place
Nile
, place
Cush
, place
Nineveh
, place
Libya
, place
Thebes
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Mawa na engumba oyo mosala na yango kosopa makila ya bato, engumba oyo etonda na makambo ya lokuta mpe na moyibi, engumba oyo ezangaka te koboma bato !
BSB
BSB:
Woe to the city of blood, full of lies, full of plunder, never without prey.
2
LIN
Tango nyonso, kaka makelele ya bafimbu, makelele ya bapine : bampunda ezali kopumbwa, mpe bashar ezali koningana.
BSB
BSB:
The crack of the whip, the rumble of the wheel, galloping horse and bounding chariot!
3
LIN
Basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda bazali kotambola-tambola, mipanga ezali kongenga, makonga ezali koleka-leka lokola mikalikali ! Bato bazali kozoka, kokufa ebele penza ! Bongo bibembe elali-lali bisika nyonso, mpe makolo ya bato ekomi kotuta bibembe tango bazali kotambola.
BSB
BSB:
Charging horseman, flashing sword, shining spear; heaps of slain, mounds of corpses, dead bodies without end—they stumble over their dead—
4
LIN
Makambo oyo nyonso esalemi likolo ya makambo ya nkele ya engumba oyo etonda na kindumba, engumba ya kitoko makasi kasi etonda na misala ya soloka, engumba oyo epengwisaka bikolo na nzela ya kindumba na yango mpe epengwisaka bato na nzela ya misala na yango ya soloka.
BSB
BSB:
because of the many harlotries of the harlot, the seductive mistress of sorcery, who betrays nations by her prostitution and clans by her witchcraft.
5
LIN
« Natombokeli yo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ; « nakotombola yo elamba kino na elongi, nakolakisa bolumbu na yo na miso ya bikolo mosusu mpe nakoyokisa yo soni na miso ya bamboka nyonso.
BSB
BSB:
“Behold, I am against you,” declares the LORD of Hosts. “I will lift your skirts over your face. I will show your nakedness to the nations and your shame to the kingdoms.
6
LIN
Nakobwakela yo bosoto, nakosambwisa yo mpe nakokomisa yo eloko ya maseki.
BSB
BSB:
I will pelt you with filth and treat you with contempt; I will make a spectacle of you.
7
LIN
Bato nyonso oyo bakomona yo bakokima mpe bakoganga : ‹ Engumba Ninive ebebisami boye ! Nani akoyokela yango mawa ? › »
BSB
BSB:
Then all who see you will recoil from you and say, ‘Nineveh is devastated; who will grieve for her?’ Where can I find comforters for you?”
8
LIN
Boni, okanisi ete ozali kitoko koleka engumba Tebesi oyo ezalaka pembeni ya ebale Nili mpe ezingelama na mayi, bongo ebale ebatelaka yango mpe mayi ezalaka lokola mir oyo ebombaka yango ?
BSB
BSB:
Are you better than Thebes, stationed by the Nile with water around her, whose rampart was the sea, whose wall was the water?
9
LIN
Makasi na yango ezalaki kowuta na Kushi mpe na Ejipito ; bato ya Puti mpe ya Libi bazalaki kosunga yango.
BSB
BSB:
Cush and Egypt were her boundless strength; Put and Libya were her allies.
10
LIN
Nzokande, yango mpe ekweyaki, mpe bamemaki bato na yango na bowumbu. Bakataki-kataki na biteni bana na bango na babalabala nyonso, babetaki zeke mpo na kopona bato na yango ya lokumu mpo ete bamema bango na bowumbu, mpe bakangaki bakambi na yango minyololo.
BSB
BSB:
Yet she became an exile; she went into captivity. Her infants were dashed to pieces at the head of every street. They cast lots for her dignitaries, and all her nobles were bound in chains.
11
LIN
Yo mpe okokoma lokola moto oyo alangwe masanga, yo mpe okoluka ekimelo mpo na kokima banguna na yo.
BSB
BSB:
You too will become drunk; you will go into hiding and seek refuge from the enemy.
12
LIN
Bandako na yo nyonso, oyo batonga makasi ezali lokola banzete ya figi etonda na bambuma ya liboso ekomela ; soki kaka bameki koningisa yango, bambuma ekweyaka kino na monoko ya moto ya lokoso.
BSB
BSB:
All your fortresses are fig trees with the first ripe figs; when shaken, they fall into the mouth of the eater!
13
LIN
Tala malamu mampinga na yo, balemba lokola basi ; bikuke ya mokili na yo ezali polele liboso ya banguna na yo, pamba te moto ezikisi bikangelo na yango.
BSB
BSB:
Look at your troops—they are like your women! The gates of your land are wide open to your enemies; fire consumes their bars.
14
LIN
Bino bato ya engumba oyo, bomitokela libela mayi mpo ete bakozingela bino ; bolendisa libela bamir oyo ebatelaka engumba na bino ; bokamata mabele oyo batongelaka bandako, bosangisa yango mpo ete ekoma potopoto, bongo bobeta babiliki mpe botumba yango.
BSB
BSB:
Draw your water for the siege; strengthen your fortresses. Work the clay and tread the mortar; repair the brick kiln!
15
LIN
Kuna nde moto ekoya kozikisa yo, mopanga ekoya koboma yo mpe kosilisa yo lokola mabanki. Tika ete bato na yo bakoma ebele lokola mabanki, bakoma lisusu ebele makasi lokola mankoko.
BSB
BSB:
There the fire will devour you; the sword will cut you down and consume you like a young locust. Make yourself many like the young locust; make yourself many like the swarming locust!
16
LIN
Okomisi motango ya bato na yo ya mombongo ebele koleka ata minzoto ya likolo, kasi babebisi mokili nyonso mpe bapumbwe na bango ndenge kaka mankoko esalaka.
BSB
BSB:
You have multiplied your merchants more than the stars of the sky. The young locust strips the land and flies away.
17
LIN
Bakengeli na yo bazali lokola mankoko, bakonzi ya basoda na yo bazali lokola maboke ya mabanki oyo eyaka kovanda na bamir ya lopango na tango ya malili ; kasi soki kaka moyi ebimi, yango nyonso epanzani, mpe moto moko te ayebaka esika yango ekendaka.
BSB
BSB:
Your guards are like the swarming locust, and your scribes like clouds of locusts that settle on the walls on a cold day. When the sun rises, they fly away, and no one knows where.
18
LIN
Oh mokonzi ya Asiri, bakambi na yo bazali kolala pongi, basoda na yo ya mpiko balali pongi ya makasi, mampinga na yo bapalangani na bangomba mpe moto akosangisa bango azali komonana te.
BSB
BSB:
O king of Assyria, your shepherds slumber; your officers sleep. Your people are scattered on the mountains with no one to gather them.
19
LIN
Ezali ata na kisi moko te oyo ekoki kobikisa pota na yo ; pota na yo ezali monene makasi ! Moto nyonso oyo akoyoka sango ya makambo oyo ekomeli yo akobeta maboko mpo na kokweyisama na yo. Pamba te nani oyo ozangaki kosala mabe ?
BSB
BSB:
There is no healing for your injury; your wound is severe. All who hear the news of you applaud your downfall, for who has not experienced your constant cruelty?
Chapter complete
You’ve read Nahum 3
Chapter 3 of 3 in Nahum
Up next
Habakkuk 1
Read Habakkuk 1
Listen
Back to Nahum 2
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Nahum 3
Ask Study Help
Ask anything about Nahum 3
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Nahum 2
Nahum 3
Habakkuk 1