Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.39.3
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Zech
Zechariah
4
LIN
BSB
A
a
Zechariah 4
4
Zechariah
Call to return and eight night visions
Lingala Bible
Zerubbabel
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai azongaki mpe alamusaki ngai ndenge balamusaka moto oyo alali pongi.
BSB
BSB:
Then the angel who was speaking with me returned and woke me, as a man is awakened from his sleep.
2
LIN
Atunaki ngai : — Ozali komona nini ? Nazongiselaki ye : — Nazali komona etelemiselo moko ya mwinda, basala na wolo mpe, na likolo na yango, ezali na kopo moko, minda sambo mpe batio sambo oyo elekisaka mafuta kino na minda.
BSB
BSB:
“What do you see?” he asked. “I see a solid gold lampstand,” I replied, “with a bowl at the top and seven lamps on it, with seven spouts to the lamps.
3
LIN
Ezali lisusu na banzete mibale ya olive pene ya etelemiselo ya minda : moko na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mosusu na ngambo ya loboko ya mwasi.
BSB
BSB:
There are also two olive trees beside it, one on the right side of the bowl and the other on its left.”
4
LIN
Natunaki Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai : — Nyonso oyo elakisi nini, nkolo na ngai ?
BSB
BSB:
“What are these, my lord?” I asked the angel who was speaking with me.
5
LIN
Azongiselaki ngai : — Boni, oyebi te soki elingi kolakisa nini ? Nazongiselaki ye : — Te, nkolo na ngai !
BSB
BSB:
“Do you not know what they are?” replied the angel. “No, my lord,” I answered.
6
LIN
Alobaki na ngai : — Tala liloba oyo Yawe alobi na Zorobabeli : « Ezali na makasi to na nguya na yo te, kasi na nguya na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
BSB
BSB:
So he said to me, “This is the word of the LORD to Zerubbabel: Not by might nor by power, but by My Spirit, says the LORD of Hosts.
7
LIN
Ozali nani, ngomba monene ? Okokoma etando liboso ya Zorobabeli. Akobimisa libanga monene kati na yo, wana bato bakozala koganga na esengo : « Tika ete Nzambe apambola yango ! Tika ete Nzambe apambola yango ! »
BSB
BSB:
What are you, O great mountain? Before Zerubbabel you will become a plain. Then he will bring forth the capstone accompanied by shouts of ‘Grace, grace to it!’”
8
LIN
Bongo Yawe alobaki na ngai :
BSB
BSB:
Then the word of the LORD came to me, saying,
9
LIN
— Ezali maboko ya Zorobabeli nde etongaki miboko ya Tempelo oyo ; ezali mpe kaka maboko yango nde ekosilisa mosala ya kotonga yango. Boye bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino.
BSB
BSB:
“The hands of Zerubbabel have laid the foundation of this house, and his hands will complete it. Then you will know that the LORD of Hosts has sent me to you.
10
LIN
Nani atiolaki makambo mike ya ebandeli ? Bato bakotonda na esengo tango bakomona, na maboko ya Zorobabeli, singa oyo bamekelaka molayi. Biloko wana sambo ezali nde miso ya Yawe oyo etalaka mokili mobimba.
BSB
BSB:
For who has despised the day of small things? But these seven eyes of the LORD, which scan the whole earth, will rejoice when they see the plumb line in the hand of Zerubbabel.”
11
LIN
Natunaki Anjelu : — Banzete mibale ya olive oyo ezali na ngambo ya loboko ya mobali mpe ya mwasi ya etelemiselo ya minda elakisi nini ?
BSB
BSB:
Then I asked the angel, “What are the two olive trees on the right and left of the lampstand?”
12
LIN
Natunaki ye lisusu : — Bitape mibale ya nzete ya olive, oyo ezali pembeni ya batio mibale ya wolo oyo ebimisaka mafuta oyo engalaka elakisi nini ?
BSB
BSB:
And I questioned him further, “What are the two olive branches beside the two gold pipes from which the golden oil pours?”
13
LIN
Azongiselaki ngai : — Boni, oyebi te soki elakisi nini ? Nazongisaki : — Te, nkolo na ngai.
BSB
BSB:
“Do you not know what these are?” he inquired. “No, my lord,” I replied.
14
LIN
Boye, alobaki : — Ezali nde bato mibale oyo bapakolami mafuta mpo na kosalela Nkolo ya mokili mobimba.
BSB
BSB:
So he said, “These are the two anointed ones who are standing beside the Lord of all the earth.”
Chapter complete
You’ve read Zechariah 4
Chapter 4 of 14 in Zechariah
Up next
Zechariah 5
Read Zechariah 5
Listen
Back to Zechariah 3
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Zechariah 4
Ask Opened AI
Ask anything about Zechariah 4
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Zechariah 3
Zechariah 4
Zechariah 5