Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.39.3
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Zech
Zechariah
5
LIN
BSB
A
a
Zechariah 5
5
Zechariah
Call to return and eight night visions
Lingala Bible
Shinar
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Tango natalaki lisusu, namonaki buku moko : ezali kopumbwa.
BSB
BSB:
Again I lifted up my eyes and saw before me a flying scroll.
2
LIN
Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai atunaki ngai : — Ozali komona nini ? Nazongisaki : — Nazali komona buku moko : ezali kopumbwa ; molayi na yango ezali na bametele pene zomi, mpe mokuse na yango, bametele pene mitano.
BSB
BSB:
“What do you see?” asked the angel. “I see a flying scroll,” I replied, “twenty cubits long and ten cubits wide.”
3
LIN
Alobaki na ngai : — Ezali nde bilakeli mabe oyo ezali kopanzana na mokili mobimba ; pamba te, kolanda ndenge ekomama na ngambo moko, bakobengana miyibi nyonso ; mpe kolanda ndenge ekomama na ngambo mosusu, bakobengana bato nyonso oyo balapaka ndayi ya lokuta.
BSB
BSB:
Then he told me, “This is the curse that is going out over the face of all the land, for according to one side of the scroll, every thief will be removed; and according to the other side, every perjurer will be removed.
4
LIN
Nakoyeisa elakeli mabe oyo mpo ete ekota kati na ndako ya moyibi mpe kati na ndako ya moto oyo alapaka ndayi ya lokuta na Kombo na Ngai. Ekotikala solo kati na ndako na ye mpe ekobebisa yango nyonso, ezala mabaya to mabanga na yango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
BSB
BSB:
I will send it out, declares the LORD of Hosts, and it will enter the house of the thief and the house of him who swears falsely by My name. It will remain inside his house and destroy it, down to its timbers and stones.”
5
LIN
Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai apusanaki pene na ngai mpe alobaki : — Tombola miso na yo mpe tala makambo oyo ezali koleka kuna.
BSB
BSB:
Then the angel who was speaking with me came forward and told me, “Now lift up your eyes and see what is approaching.”
6
LIN
Natunaki : — Makambo nini yango ? Azongisaki : — Ezali nde sani, emekelo motuya ya biloko. Abakisaki : — Sani yango etondisamaki na masumu ya bato ya mokili.
BSB
BSB:
“What is it?” I asked. And he replied, “A measuring basket is going forth.” Then he continued, “This is their iniquity in all the land.”
7
LIN
Kaka na tango yango, mofinuku na yango ya ebende etombwamaki, mpe namonaki mwasi moko avanda na kati.
BSB
BSB:
And behold, the cover of lead was raised, and there was a woman sitting inside the basket.
8
LIN
Alobaki : — Mwasi wana azali elembo ya makambo mabe. Bongo azongisaki ye kati na sani, emekelo motuya ya biloko, mpe azipaki mofinuku na yango.
BSB
BSB:
“This is Wickedness,” he said. And he shoved her down into the basket, pushing down the lead cover over its opening.
9
LIN
Natombolaki miso mpe namonaki liboso na ngai basi mibale bazali kopumbwa mpo na koya epai na biso. Mapapu na bango ezalaki minene lokola mapapu ya nkongi. Batombolaki sani yango kino na kati-kati ya likolo mpe se.
BSB
BSB:
Then I lifted up my eyes and saw two women approaching, with the wind in their wings. Their wings were like those of a stork, and they lifted up the basket between heaven and earth.
10
LIN
Natunaki Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai : — Bazali komema sani yango wapi ?
BSB
BSB:
“Where are they taking the basket?” I asked the angel who was speaking with me.
11
LIN
Azongisaki : — Bazali komema yango na mokili ya Babiloni mpo ete batongela yango ndako, na Shineari. Soki ndako yango esili kotongama, bakotia sani yango kuna.
BSB
BSB:
“To build a house for it in the land of Shinar,” he told me. “And when it is ready, the basket will be set there on its pedestal.”
Chapter complete
You’ve read Zechariah 5
Chapter 5 of 14 in Zechariah
Up next
Zechariah 6
Read Zechariah 6
Listen
Back to Zechariah 4
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Zechariah 5
Ask Opened AI
Ask anything about Zechariah 5
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Zechariah 4
Zechariah 5
Zechariah 6